Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 3

Adama ná Eva batosaki Nzambe te

Adama ná Eva batosaki Nzambe te

Mokolo moko ntango Eva azalaki kaka ye moko, nyoka moko elobaki na ye. Elobaki boye: ‘Ezali solo ete Nzambe aboyi bólya mbuma ya nzete nyonso?’ Eva alobaki: ‘Tokoki kolya mbuma ya nzete nyonso, longola kaka ya nzete moko. Soki tolei mbuma ya nzete yango, tokokufa.’ Nyoka ebakisaki: ‘Bokokufa te. Kutu soki bolei yango, bokokóma lokola Nzambe.’ Ezalaki solo? Te, ezalaki lokuta. Kasi Eva andimaki likambo yango. Abandaki kotala mbuma yango, tii ayokaki mposa na yango. Alyaki mbuma yango, na nsima apesaki mpe Adama. Adama ayebaki ete bakokufa soki batosi Nzambe te. Kasi alyaki yango kaka.

Na nsima, kaka na mokolo yango, Yehova alobaki na Adama ná Eva. Atunaki bango ntina oyo batosaki ye te. Eva alobaki ete ezali foti ya nyoka, mpe Adama alobaki ete ezali foti ya Eva. Lokola Adama ná Eva batosaki Yehova te, abenganaki bango na elanga. Mpo bázonga lisusu kuna te, Yehova atyaki baanzelu ná mopanga moko ya mɔtɔ na nzela ya kokɔta na elanga.

Yehova alobaki ete moto oyo akosaki mpe Eva akozwa etumbu. Ezalaki mpenza nyoka te nde esololaki na Eva. Yehova asalaki nyoka na likoki ya koloba te. Ezalaki anzelu moko ya mabe nde alobaki na nzela ya nyoka. Asalaki bongo mpo na kokosa Eva. Anzelu yango abengami Satana Zabolo. Na mikolo ezali koya, Yehova akoboma Satana mpo akosa lisusu bato te.

“Zabolo . . . azalaki mobomi-bato ntango abandaki, mpe akangamaki makasi te na solo, mpo solo ezali na kati na ye te.”​—Yoane 8:44