Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 4

Nkanda etindaki ye aboma

Nkanda etindaki ye aboma

Nsima ya kobima na elanga ya Edene, Adama ná Eva babotaki bana ebele. Mwana na bango ya liboso Kaina, akómaki mosali ya bilanga, mpe oyo ya mibale Abele, akómaki mobateli ya mpate.

Mokolo moko, Kaina ná Abele bapesaki Nzambe makabo. Oyebi soki likabo ezali nini? Likabo ezali eloko oyo bakabeli moto. Yehova asepelaki na likabo ya Abele, kasi asepelaki na oyo ya Kaina te. Epesaki Kaina nkanda makasi. Yehova akebisaki Kaina; alobaki na ye ete nkanda ekoki kotinda ye asala mabe. Kasi Kaina ayokaki te.

Na nsima, alobaki na Abele ete: ‘Yaká tókende na bilanga.’ Ntango bazalaki kuna na bilanga kaka bango mibale, Kaina abɛtaki ndeko na ye mpe abomaki ye. Yehova asalaki nini? Yehova apesaki Kaina etumbu; abenganaki ye mosika na bato ya libota na ye. Akokaki kozonga lisusu te.

Lisolo yango eteyi biso nini? Tokoki kobanda koyoka nkanda soki makambo esalemi te ndenge tokanisaki. Soki nkanda na motema na biso ebandi kokóma makasi​—to soki moto akebisi biso mpo amoni ete tokómi na nkanda—​tosengeli kosala noki tólongola yango liboso etinda biso tósala mabe.

Lokola Abele alingaki Yehova mpe asalaki makambo ya malamu, Yehova abosani ye te. Akozongisa ye na bomoi ntango akokómisa mabele paradiso.

“Liboso yokaná yo na ndeko na yo, mpe na nsima, ntango okozonga, pesá likabo na yo.”​—Matai 5:24