Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 6

Bato mwambe bakɔti na mokili moko ya sika

Bato mwambe bakɔti na mokili moko ya sika

Noa, libota na ye, ná banyama bakɔtaki na masuwa. Yehova akangaki porte na yango, mpe mbula ebandaki kobɛta. Mbula ebɛtaki makasi mpe masuwa ebandaki kotepatepa. Nsukansuka, mabele mobimba etondaki na mai. Na libándá ya masuwa, bato mabe nyonso bakufaki. Kasi Noa ná libota na ye bazalaki na likama te na kati ya masuwa. Kanisá esengo oyo bayokaki mpo batosaki Yehova!

Mbula ebɛtaki mikolo 40 butu moi; na nsima esilaki. Mokemoke, mai ebandaki kokauka. Nsukansuka, masuwa etɛlɛmaki na bangomba. Kasi mai ezalaki naino mingi na mokili; na yango, Noa ná libota na ye bakokaki kobima mbala moko te na masuwa.

Kendekende, mai ekaukaki. Noa ná libota na ye bafandaki na kati ya masuwa koleka mbula mobimba. Na nsima, Yehova ayebisaki bango bábima na masuwa, mpe bamonaki lokola mokili ekómi mokili ya sika. Bapesaki Yehova matɔndi mingi ndenge abikisaki bango, mpe bapesaki ye makabo ya kotumba.

Yehova andimaki makabo yango. Alakaki ete akoboma lisusu mokili na mpela te. Mpo na elaka yango, apesaki elembo moko, abimisaki monama ya liboso na mapata. Osí omoná monama?

Na nsima, Yehova ayebisaki Noa ná libota na ye bábota bana mpe bátondisa mabele.

“Noa akɔtaki na masuwa; mpe [bato] batyaki likebi te tii mpela eyaki mpe ekɔmbɔlaki bango nyonso.”​—Matai 24:38, 39