Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 7

Ndako molai ya Babele

Ndako molai ya Babele

Nsima ya Mpela, bana ya Noa ná basi na bango babotaki bana ebele. Mabota na bango ekómaki minene, mpe bato babandaki kopalangana na bisika ndenge na ndenge na mabele, kaka ndenge Yehova ayebisaki bango.

Kasi na mabota mosusu, bato bazalaki kotosa Yehova te. Balobaki: ‘Bóya tótonga engumba mpe tófanda wana. Tótonga ndako ya molai oyo nsɔngɛ na yango ekokóma tii na likoló. Bongo tokozala na lokumu.’

Kasi Yehova asepelaki te na likambo oyo bato wana bazalaki kosala, yango wana apekisaki bango. Asalaki yango ndenge nini? Na mbala moko, asalaki ete bábanda koloba minɔkɔ ekeseni. Lokola bazalaki lisusu koyokana te, batikaki kotonga. Engumba oyo bazalaki kotonga ekómaki kobengama Babele, oyo elimboli “Mobulungano.” Bato bapanzanaki mpe bakómaki kofanda na mabele mobimba. Kasi bakobaki kosala makambo ya mabe na bisika oyo bakendaki kofanda. Bato mosusu bazalaki kaka kolinga Yehova? Tokoyeba yango na lisolo elandi.

“Moto nyonso oyo azali komitombola akoyokisama nsɔni, kasi moto oyo azali komikitisa akotombwama.”​—Luka 18:14