Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 8

Abrahama ná Sara batosaki Nzambe

Abrahama ná Sara batosaki Nzambe

Mosika mingi te na Babele, ezalaki na mboka moko na nkombo Ure, epai bato bazalaki kosambela banzambe ebele, kasi Yehova te. Nzokande ezalaki na mobali moko na Ure oyo azalaki kosambela kaka Yehova. Nkombo na ye ezalaki Abrahama.

Yehova alobaki na Abrahama: ‘Tiká mboka na yo mpe bandeko na yo, mpe kende na mokili oyo nakolakisa yo.’ Na nsima Nzambe apesaki ye elaka oyo: ‘Okokóma ekólo moko monene, mpe nakosalela bato ebele ya mokili mobimba makambo ya malamu mpo na yo.’

Abrahama ayebaki te epai Yehova azalaki kotinda ye, kasi atyelaki ye motema. Bongo Abrahama, mwasi na ye Sara, tata na ye Tera, ná Lota mwana ya ndeko na ye bakangaki biloko na bango mpe babandaki mobembo ya molai mpenza, mpo na kotosa Nzambe.

Abrahama azalaki na mbula 75 ntango ye ná libota na ye bakómaki na mokili oyo Yehova alingaki bámona. Nkombo ya mokili yango ezalaki Kanana. Kuna, Nzambe alobaki na Abrahama mpe apesaki ye elaka oyo: ‘Mokili nyonso oyo ozali komona, nakopesa yango bana na yo.’ Nzokande, Abrahama ná Sara bakómaki mikóló mpenza kasi bazalaki na mwana te. Sikoyo ndenge nini Yehova akokokisa elaka yango?

“Na kondima Abrahama . . . atosaki na ndenge akendaki na esika oyo asengelaki kozwa yango libula; mpe akendaki, atako ayebaki te epai wapi azalaki kokende.”​—Baebre 11:8