Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 10

Kanisá mwasi ya Lota

Kanisá mwasi ya Lota

Lota azalaki kofanda na mokili ya Kanana elongo na Abrahama, ndeko ya tata na ye. Na nsima, Abrahama ná Lota bakómaki na bibwɛlɛ ebele, mpe esika ezalaki kokoka lisusu te mpo na bango mibale. Abrahama ayebisaki Lota: ‘Tokoki lisusu kofanda esika moko te. Yo poná nzela oyo olingi kokende, mpe ngai nakokende nzela mosusu.’ Abrahama azalaki mpenza koluka liboso bolamu ya basusu!

Lota amonaki mokili moko kitoko pembeni ya engumba Sodoma. Ezalaki na mai mpe matiti ebele. Na yango, aponaki esika yango mpe amemaki libota na ye kuna.

Bato ya Sodoma mpe ya Gomora, engumba oyo ezalaki pene ya Sodoma, bazalaki mabe mpenza. Bazalaki mabe mingi mpenza, yango wana Yehova amonaki malamu abebisa bingumba yango. Kasi lokola Nzambe alingaki kobatela Lota ná libota na ye, atindaki baanzelu mibale bákende koyebisa bango ete: ‘Bósala noki! Bóbima na engumba oyo! Yehova alingi kobebisa yango.’

Lota abimaki mbala moko te. Azalaki koumela. Na yango baanzelu basimbaki ye, ná mwasi na ye, ná bana na ye mibale ya basi mpe babimisaki bango nokinoki na engumba, mpe balobaki na bango ete: ‘Bókima mbangu! Bóbikisa bomoi na bino, mpe bótala nsima te. Soki botali nsima, bokokufa!’

Ntango bakómaki na engumba Zoare, Yehova anɔkisaki mbula ya mɔtɔ mpe ya sufulu na Sodoma mpe Gomora. Bingumba yango mibale ebebisamaki nyonso. Lokola mwasi ya Lota atosaki Yehova te mpe atalaki nsima, akómaki likonzí ya mungwa! Kasi Lota ná bana na ye ya basi babikaki mpo batosaki Yehova. Na ntembe te ezalaki mawa mpenza ndenge mwasi ya Lota atosaki te. Kasi bango basepelaki mpo balandaki malako ya Yehova.

“Bókanisa mwasi ya Lota.”​—Luka 17:32