Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 11

Kondima na ye emekamaki

Kondima na ye emekamaki

Abrahama ateyaki mwana na ye Yisaka kolinga Yehova mpe kotyela bilaka na Ye nyonso motema. Kasi ntango Yisaka akómaki na mbula soki 25, Yehova asɛngaki Abrahama likambo moko ya mpasi mpenza. Likambo nini?

Nzambe ayebisaki Abrahama: ‘Nabondeli yo, zwá mwana na yo ya mobali kaka moko mpe pesá ye mbeka na ngomba moko na mokili ya Moria.’ Abrahama ayebaki te ntina oyo Yehova asɛngaki ye asala bongo. Kasi atosaki.

Na ntɔngɔntɔngɔ ya mokolo oyo elandaki, Abrahama azwaki Yisaka ná basaleli na ye mibale mpe bakendaki na Moria. Nsima ya mikolo misato, bamonaki bangomba ya mokili yango na mosika. Abrahama ayebisaki basaleli na ye bázela, mpo ye ná Yisaka bakei kopesa mbeka. Abrahama apesaki Yisaka nkoni amema, mpe ye moko asimbaki mbeli. Yisaka atunaki tata na ye: ‘Wapi nyama oyo tokopesa mbeka?’ Abrahama ayanolaki: ‘Mwana, Yehova akopesa yango.’

Ntango bakómaki na ngomba yango, batongaki etumbelo. Na nsima Abrahama akangaki Yisaka mabɔkɔ ná makolo na nsinga mpe alalisaki ye likoló ya etumbelo.

Abrahama atombolaki mbeli. Na ntango yango, anzelu ya Yehova abelelaki na likoló: ‘Abrahama! Kosala mwana mabe te! Sikoyo nayebi ete ozali na kondima epai ya Nzambe mpo ondimi kopesa mwana na yo mbeka.’ Na nsima, Abrahama amonaki mpate-mobali moko oyo maseke na yango ekangamaki na mwa banzete. Afungolaki Yisaka nsinga nokinoki mpe na esika na ye, apesaki mpate-mobali wana mbeka.

Banda mokolo wana, Yehova akómaki kobenga Abrahama moninga na ye. Oyebi mpo na nini? Abrahama azalaki kosala eloko nyonso oyo Yehova azalaki kosɛnga ye, ata soki ayebi te ntina oyo Yehova asɛngi yango.

Yehova azongelaki elaka na ye epai ya Abrahama: ‘Nakopambola yo, mpe nakokómisa bana na yo ebele.’ Yango elingi koloba ete Yehova akopambola bato nyonso ya malamu na nzela ya libota ya Abrahama.

“Nzambe alingaki mokili mingi, yango wana apesaki Mwana na ye se moko oyo abotamaki, mpo moto nyonso oyo azali kondimela ye abomama te kasi azwa bomoi ya seko.”​—Yoane 3:16