Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 12

Yakobo azwaki libula

Yakobo azwaki libula

Yisaka azalaki na mbula 40 ntango abalaki Rebeka. Alingaki ye mingi. Na nsima, babotaki mapasa ya mibali.

Ya liboso nkombo na ye ezalaki Esau, mpe oyo ya mibale Yakobo. Esau azalaki kolinga kotambola libándá, mpe azalaki mobomi-nyama. Kasi Yakobo azalaki kolinga kofanda na ndako.

Na ntango wana, mwana ya liboso azalaki kozwa mabele mpe mbongo ya libota soki tata akufi. Bazalaki kobenga biloko yango libula. Na libota ya Yisaka, longola makambo wana, lokumu ya kozwa mokumba na kokokisama ya bilaka oyo Yehova apesaki Abrahama ezalaki mpe libula. Esau azalaki mpenza kokipe bilaka yango te, kasi Yakobo ayebaki ete ezali na ntina mingi.

Mokolo moko Esau azongaki ndako azalaki ya kolɛmba makasi mpo alekisaki mokolo mobimba na koluka banyama. Ayokaki nsolo ya biloko kitoko oyo Yakobo azalaki kolamba, mpe alobaki: ‘Nazali na nzala makasi! Pesá ngai mwa ndambo ya supu ya motane wana!’ Yakobo alobaki: ‘Nakopesa yo, kasi liboso pesá ngai elaka ete nakoki kozwa libula na yo.’ Esau alobaki: ‘Nazali na ntina ya libula te! Zwá yango. Nalingi nde kolya.’ Okanisi ete likambo oyo Esau asalaki ezalaki ya mayele? Te. Esau akabaki eloko ya ntina mingi kaka mpo na mwa saani ya supu ya lantiye.

Ntango Yisaka akómaki mobange, ekómaki ntango ya kopesa mwana na ye ya liboso lipamboli. Kasi Rebeka asalisaki Yakobo, leki ya Esau, azwa lipamboli yango. Ntango Esau ayebaki likambo yango, ayokaki nkanda makasi mpe akanaki koboma lipasa na ye. Yisaka ná Rebeka balingaki kobatela Yakobo, yango wana bayebisaki ye: ‘Kende kofanda epai ya Labana, ndeko ya mama na yo, tii nkanda ya Esau ekokita.’ Yakobo ayokaki toli ya baboti na ye mpe akimaki mpo na kobatela bomoi na ye.

“Litomba nini moto azali na yango na kozwa mokili mobimba mpe kobungisa molimo [bomoi] na ye? Eloko nini, kutu, moto akoki kopesa na esika ya molimo [bomoi] na ye?”​—Marko 8:36, 37