Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 13

Yakobo ná Esau bayokani

Yakobo ná Esau bayokani

Yehova apesaki Yakobo elaka ete akobatela ye kaka ndenge abatelaki Abrahama ná Yisaka. Yakobo akendaki kofanda na mboka babengi Harane; abalaki kuna, abotaki bana ebele, mpe akómaki na bozwi mingi.

Na nsima, Yehova alobaki na Yakobo: ‘Zongá na mokili ya batata na yo.’ Yakobo ná libota na ye babandaki mobembo molai mpo na kozonga. Na nzela, bato bayaki koyebisa Yakobo ete: ‘Ndeko na yo Esau azali koya, elongo na mibali 400!’ Yakobo azalaki kobanga ete Esau asala ye ná libota na ye mabe. Abondelaki Yehova: ‘Bikisá ngai na lobɔkɔ ya ndeko na ngai.’ Mokolo oyo elandaki, Yakobo atindelaki Esau bampate, bantaba, bangɔmbɛ, bakamela, mpe bampunda ebele.

Na butu, ntango Yakobo azalaki ye moko, amonaki anzelu! Anzelu yango abandaki kobunda na ye. Babundaki tii na ntɔngɔ. Yakobo ayokaki mpasi, kasi atikaki te. Anzelu alobaki na ye: ‘Tiká ngai nakende.’ Kasi Yakobo alobaki: ‘Nakotika yo kaka soki opamboli ngai.’

Nsukansuka anzelu yango apambolaki Yakobo. Sikoyo Yakobo ayebaki ete Yehova akotika te ete Esau asala ye mabe.

Na ntɔngɔ, ntango Yakobo atalaki na mosika, amonaki Esau ná mibali 400. Yakobo akendaki liboso ya libota na ye, mpe afukamaki mbala nsambo liboso ya ndeko na ye. Esau ayaki mbangu epai ya Yakobo mpe ayambaki ye. Babandaki kolela mpe bayokanaki. Okanisi ete Yehova ayokaki ndenge nini na milende oyo Yakobo asalaki mpo na koyokana na ndeko na ye?

Na nsima, Esau azongaki epai na ye, Yakobo mpe akendaki epai na ye. Yakobo azalaki na bana mibali 12. Nkombo na bango yango oyo: Rubene, Simeone, Levi, Yuda, Dani, Nafatali, Gade, Ashere, Isakare, Zebulone, Yozefe, ná Benyamina. Na bana yango, Yehova asalelaki Yozefe mpo na kobikisa bato na Ye. Oyebi ndenge asalaki yango? Tokolobela yango.

“Bókoba kolinga banguna na bino mpe kobondela mpo na baoyo bazali konyokola bino; mpo bómonisa ete bozali bana ya Tata na bino oyo azali na likoló.”​—Matai 5:44, 45