Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 14

Moombo oyo atosaki Nzambe

Moombo oyo atosaki Nzambe

Yozefe azalaki moko ya bana oyo Yakobo abotaki na nsuka. Bayaya na ye bamonaki ete tata na bango azalaki kolinga ye mingi. Bayokaki ndenge nini? Bayokelaki ye zuwa mpe bakómaki koyina ye. Mokolo moko, Yozefe alɔtaki bandɔtɔ ya kokamwa mpe ayebisaki yango bayaya na ye. Mpo na bango, bandɔtɔ yango elimbolaki ete mokolo mosusu bakogumbamela Yozefe. Bayinaki ye lisusu mingi!

Mokolo moko, bayaya ya Yozefe bazalaki kobatela bibwɛlɛ pene na engumba Shekeme. Yakobo atindaki Yozefe akende kotala bango. Ntango bamonaki ye na mosika, balobanaki ete: ‘Talá molɔti-ndɔtɔ azali koya. Tóboma ye!’ Bakangaki ye mpe babwakaki ye na libulu moko molai. Kasi, yaya na ye moko na nkombo Yuda alobaki: ‘Tóboma ye te! Tótɛka ye lokola moombo.’ Na yango, batɛkaki Yozefe na shekele ya palata 20 epai ya bato ya mombongo ya Midiane, oyo bazalaki kokende na Ezipito.

Bayaya ya Yozefe bazindisaki kazaka na ye na makila ya ntaba, batindelaki yango tata na bango, mpe balobaki: ‘Oyo kazaka ya mwana na yo te?’ Yakobo akanisaki ete nyama moko ya mabe ebomaki Yozefe. Ayokaki mpasi mingi. Moto te alongaki kobɔndisa ye.

Na Ezipito, Yozefe atɛkamaki moombo epai ya mokonzi moko monene na nkombo Potifare. Kasi Yehova azalaki na Yozefe. Potifare amonaki ete Yozefe azalaki mosali ya malamu mpe ete azali moto ya kotyela motema. Eumelaki te, akómaki mokonzi ya biloko nyonso ya Potifare.

Mwasi ya Potifare amonaki ete Yozefe azali mobali kitoko mpe makasi. Mokolo na mokolo azalaki kosɛnga Yozefe básangisa nzoto. Yozefe asalaki nini? Aboyaki mpe alobaki: ‘Te! Ezali mabe. Nkolo na ngai atyelaka ngai motema, mpe yo ozali mwasi na ye. Soki nasangisi na yo nzoto, nakosala lisumu na miso ya Nzambe!’

Mokolo moko mwasi ya Potifare alukaki Yozefe asangisa na ye nzoto na makasi. Akangaki ye na bilamba, kasi Yozefe akimaki. Ntango Potifare ayaki na ndako, mwasi yango ayebisaki Potifare ete Yozefe alukaki kolala na ye. Ezalaki lokuta. Potifare asilikaki makasi, mpe abwakaki Yozefe na bolɔkɔ. Kasi Yehova abosanaki Yozefe te.

“Yango wana, bómikitisa na nse ya lobɔkɔ ya nguya ya Nzambe, mpo atombola bino na ntango oyo ekoki.”​—1 Petro 5:6