Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 15

Yehova abosanaki Yozefe te

Yehova abosanaki Yozefe te

Ntango Yozefe azalaki na bolɔkɔ, Farao, mokonzi ya Ezipito, alɔtaki bandɔtɔ mpe moto moko te alongaki kolimbola yango. Mosaleli moko ya Farao ayebisaki ye ete Yozefe akoki kolimbola yango. Na mbala moko, Farao atindaki bákende kozwa Yozefe.

Farao atunaki ye: ‘Okoki kolimbola bandɔtɔ na ngai?’ Yozefe ayebisaki ye: ‘Ezipito ekozala na bilei ebele mbula nsambo, mpe na nsima mbula nsambo ya nzala. Poná moto moko ya bwanya oyo akobomba bilei mpo bato na yo bákufa nzala te.’ Farao alobaki: ‘Naponi yo! Okozala moto ya mibale oyo aleki na nguya na Ezipito!’ Ndenge nini Yozefe ayebaki ndimbola ya bandɔtɔ ya Farao? Yehova nde asalisaki ye.

Na bambula nsambo oyo elandaki, Yozefe abombaki bilei. Na nsima, nzala ekɔtaki na mabele mobimba, kaka ndenge Yozefe alobaki. Bato ya bisika nyonso bazalaki koya kosomba bilei epai ya Yozefe. Tata na ye Yakobo ayokaki ete bilei ezali na Ezipito; na yango atindaki bana na ye ya mibali 10 bákende kuna kosomba mwa biloko.

Bana ya Yakobo bayaki epai ya Yozefe, mpe Yozefe ayebaki mbala moko ete bazali bandeko na ye. Kasi bango bayebaki ye te. Bagumbamelaki ye, kaka ndenge alɔtaki na ndɔtɔ ntango azalaki elenge. Yozefe alingaki koyeba soki bandeko na ye bazalaki kaka koyina ye. Ayebisaki bango: ‘Bozali banɔngi. Bolingi koyeba bisika ya mokili na biso oyo ebatelami malamu te.’ Balobaki: ‘Te! Tozali bandeko 12, touti na Kanana. Ndeko na biso moko akufá, mpe ya nsuka azali elongo na tata na biso.’ Yozefe alobaki: ‘Bóya na ndeko na bino ya nsuka epai na ngai, mpe nakondimela bino.’ Na yango bazongaki epai ya tata na bango.

Ntango bilei esilaki lisusu, Yakobo atindaki bana na ye bákende lisusu na Ezipito. Na mbala oyo, bamemaki Benyamina, leki na bango ya nsuka. Mpo na komeka bandeko na ye, Yozefe atyaki kɔpɔ na ye ya palata na saki ya bilei ya Benyamina, na nsima alobaki ete bandeko na ye bayibi yango. Ntango basaleli ya Yozefe bakutaki kɔpɔ yango na saki ya Benyamina, bandeko na ye bakamwaki makasi. Babondelaki Yozefe apesa bango etumbu na esika ya Benyamina.

Na yango, Yozefe amonaki ete bandeko na ye babongwaná. Akokaki lisusu kokanga motema te. Abandaki kolela mpe alobaki: ‘Nazali ndeko na bino Yozefe. Tata na ngai azali kaka na bomoi?’ Bandeko na ye batikalaki monɔkɔ polele. Ayebisaki bango: ‘Bóyoka mpasi te mpo na makambo oyo bosalaki ngai. Nzambe atindaki ngai awa mpo na kobatela bomoi na bino. Sikoyo bókende noki mpe bóya na tata na ngai awa.’

Bakendaki koyebisa tata na bango nsango wana ya malamu mpe bamemaki ye na Ezipito. Nsima ya bambula mingi, nsukansuka Yozefe ná tata na ye bamonanaki lisusu.

“Soki bozali kolimbisa bato mabunga na bango te, Tata na bino akolimbisa mpe mabunga na bino te.”​—Matai 6:15