Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 16

Yobo azalaki nani?

Yobo azalaki nani?

Na mokili ya Uze, ezalaki na mobali moko oyo azalaki kosambela Yehova. Nkombo na ye ezalaki Yobo. Azalaki na bozwi mingi mpe na libota moko monene. Azalaki na boboto, mpe azalaki kosalisa babola, basi oyo mibali bakufá, mpe bana etike. Kasi lokola Yobo azalaki kosala makambo ya malamu, azangaki nde mikakatano?

Yobo ayebaki te ete Satana Zabolo azalaki kotala ye. Yehova alobaki na Satana: ‘Omoni mosaleli na ngai Yobo? Moto moko te na mabele azali lokola ye. Ayokelaka ngai mpe asalaka makambo ya malamu.’ Satana ayanolaki: ‘Ya solo Yobo atosaka yo. Obatelaka ye mpe opambolaka ye. Opesi ye mabele mpe banyama. Soki obɔtɔli nyonso wana, akotika kosambela yo.’ Yehova alobaki na ye: ‘Kende komeka Yobo. Kasi koboma ye te.’ Mpo na nini Yehova atikaki Satana ameka Yobo? Atyaki motema ete Yobo akotikala sembo.

Mpo na komeka Yobo, Satana abimiselaki ye mpasi ndenge na ndenge. Ya liboso, atindaki bato oyo bazalaki kobengama Basabea báyiba bangɔmbɛ mpe bampunda nyonso ya Yobo. Na nsima, mɔtɔ ezikisaki bampate nyonso ya Yobo. Bato mosusu oyo bazalaki kobenga Bakaladea bayibaki bakamela na ye nyonso. Basaleli oyo bazalaki kokɛngɛla banyama yango babomamaki. Nsima na yango, likambo ya mabe koleka esalemaki. Bana nyonso ya Yobo bakufaki ntango ndako oyo bazalaki kosala fɛti ekweaki. Yobo ayokaki mpasi mingi, kasi atikaki kosambela Yehova te.

Lokola Satana alingaki ete Yobo anyokwama lisusu mingi, abwakelaki ye maladi mabe ya babibɔ na nzoto mobimba. Ezalaki kosala Yobo mpasi makasi. Yobo ayebaki te ntina oyo makambo wana nyonso ezalaki kokómela ye. Atako bongo, akobaki kosambela Yehova. Nzambe amonaki nyonso wana, mpe asepelaki na ye mingi.

Na nsima, Satana atindaki mibali misato bámeka Yobo. Bayebisaki ye: ‘Osalaki lisumu mpe ozali kobomba yango. Nzambe azali kopesa yo etumbu.’ Yobo alobaki: ‘Nasali likambo ya mabe te.’ Kasi na nsima, Yobo akómaki kokanisa ete Yehova nde azalaki kobimisela ye mpasi wana, mpe alobaki ete Nzambe asaleli ye makambo na bosembo te.

Elenge mobali moko na nkombo Elihu afandaki nyɛɛ mpe ayokaki lisolo na bango mobimba. Na nsima alobaki: ‘Makambo nyonso oyo bolobi ezali bongo te. Yehova azali monene koleka ndenge oyo tokoki kokanisa. Akoki kosala likambo ya mabe te. Amonaka makambo nyonso mpe asalisaka bato oyo bazali na mikakatano.’

Na nsima, Yehova asololaki na Yobo. Alobaki na ye: ‘Ozalaki wapi ntango nasalaki likoló ná mabele? Mpo na nini olobi ete nazali sembo te? Olobi, kasi oyebi te ntina oyo makambo esalemaka.’ Yobo andimaki libunga na ye mpe alobaki: ‘Nalobaki mabe. Nayokaki nsango na yo, kasi sikoyo nayebi yo malamu. Okoki kosala makambo nyonso. Limbisá ngai mpo na makambo oyo nalobaki.’

Ntango komekama ya Yobo esilaki, Yehova abikisaki ye na maladi mpe apesaki ye biloko ebele koleka oyo azalaki na yango liboso. Yobo azalaki na bomoi ya molai mpe ya esengo. Yehova apambolaki Yobo mpo atosaki ye ata ntango ezalaki mpasi. Okozala lokola Yobo mpe okokoba kosambela Yehova, ata na ntango ya mpasi?

“Boyoká nsango ya koyika mpiko ya Yobo mpe bomoná ndenge Yehova asukisaki makambo na ye.”​—Yakobo 5:11