Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 17

Moize aponaki kosambela Yehova

Moize aponaki kosambela Yehova

Na Ezipito, bana ya Yakobo bazalaki kobengama Bayisraele. Nsima ya liwa ya Yakobo mpe ya Yozefe, Farao mosusu akómaki koyangela. Abangaki mpo Bayisraele bazalaki se kokóma makasi koleka Baezipito. Na yango, akómisaki Bayisraele baombo. Atindaki bango básala babriki mpe apesaki bango mosala makasi ya bilanga. Kasi, wana Baezipito bazalaki kosalisa bango misala makasi na nko, Bayisraele mpe bazalaki se kokóma ebele. Lokola Farao alingaki bongo te, apesaki mitindo ete báboma bana nyonso ya mibali oyo Bayisraele bakobota. Kanisá ndenge Bayisraele bazalaki kobanga!

Moyisraele moko ya mwasi na nkombo Yokebede abotaki mwana mobali moko kitoko. Mpo na kobatela ye, atyaki ye na kitunga mpe abombaki ye na matiti pembeni ya Ebale Nile. Miriame, ndeko mwasi ya mwana yango, atɛlɛmaki pembeni wana mpo na kotala makambo oyo ekosalema.

Mwana mwasi ya Farao ayaki kosukola na ebale mpe amonaki kitunga yango. Ntango afungolaki yango, amonaki mwana azali kolela, mpe ayokelaki ye mawa. Miriame atunaki ye: “Nakende koluka mwasi moko oyo akoki komɛlisela yo mwana yango mabɛlɛ?’ Ntango mwana mwasi ya Farao andimaki, Miriame akendaki kobenga mama na bango, Yokebede. Mwana mwasi ya Farao alobaki na ye: ‘Zwá mwana oyo, mɛliselá ngai ye mabɛlɛ, mpe nakofuta yo.’

Ntango mwana yango akolaki, Yokebede amemaki ye epai ya mwana mwasi ya Farao, oyo apesaki ye nkombo Moize mpe abɔkɔlaki ye lokola mwana na ye moko. Moize akolaki lokola mwana ya mokonzi mpe akokaki kozwa eloko nyonso oyo alingi. Kasi Moize abosanaki Yehova te. Ayebaki ete azalaki nde Moyisraele, kasi Moezipito te. Mpe aponaki kosalela Yehova.

Ntango akómaki na mbula 40, Moize alingaki kosalisa bandeko na ye. Ntango amonaki Moezipito moko azali kobɛta moombo moko ya Yisraele, abɛtaki Moezipito yango makasi, abomaki ye, mpe akundaki ye na zɛlo. Ntango Farao ayokaki likambo yango, alukaki koboma Moize. Moize akimaki na mokili ya Midiane. Kuna, Yehova abatelaki ye.

“Na kondima Moize . . . aboyaki kobengama mwana ya mwana mwasi ya Farao, aponaki konyokwama elongo na bato ya Nzambe.”​—Baebre 11:24, 25