Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 20

Malɔzi motoba oyo elandaki

Malɔzi motoba oyo elandaki

Moize ná Arona bakendaki koyebisa Farao maloba ya Nzambe: ‘Soki oboyi kotika bato na ngai bákende, nakotinda mapokopoko na mokili ya Ezipito.’ Mapokopoko (nzinzi ya minene) etondaki na bandako ya Baezipito, ezala bazwi to babola. Mboka etondaki na mapokopoko. Kasi na mokili ya Goshene, esika Bayisraele bazalaki kofanda, mapokopoko ekómaki te. Kobanda na bolɔzi wana ya minei, malɔzi ekómaki kozwa kaka Baezipito. Farao asɛngaki Moize: ‘Bondelá Yehova alongola mapokopoko oyo. Bato na yo bakoki kokende.’ Kasi ntango Yehova alongolaki mapokopoko, Farao abongolaki makanisi na ye. Farao azwaki liteya?

Yehova alobaki: ‘Soki Farao aboyi kotika bato na ngai bákende, banyama nyonso ya Baezipito ekobɛla mpe ekokufa.’ Mokolo oyo elandaki, banyama ebandaki kokufa. Kasi banyama ya Bayisraele ekufaki te. Atako bongo, Farao azalaki kaka motó makasi, mpe atikaki bango te.

Na nsima Yehova ayebisaki Moize akende lisusu epai ya Farao mpe abwaka putulu ya milinga oyo euti na mombonda na likoló. Putulu yango epanzanaki na mokili mobimba ya Ezipito mpe ezalaki kokwela bato. Putulu yango ekómaki babibɔ na nzoto ya Baezipito ná banyama na bango mpe ezalaki kosala mpasi makasi. Atako bongo, Farao aboyaki kotika Bayisraele.

Yehova atindaki lisusu Moize amemela Farao nsango oyo: ‘Oboyi kaka kotika bato na ngai bákende? Lobi, nakonɔkisa mbula ya mabanga na Ezipito.’ Mokolo oyo elandaki, Yehova anɔkisaki mbula ya mabanga; atindaki nkake mpe mɔtɔ. Mbula ya ndenge wana enɔkaki naino te na Ezipito. Banzete mpe milona nyonso ebebaki, longola kaka na Goshene. Farao alobaki na Moize: ‘Bondelá Yehova asilisa mbula oyo! Bongo bókende.’ Kasi, ntango kaka mbula ya mabanga esilaki, Farao abongolaki makanisi.

Na yango, Moize alobaki: ‘Sikoyo mayoyo ekolya milona oyo mbula ya mabanga etikaki.’ Mayoyo ebele elyaki eloko nyonso oyo etikalaki na bilanga mpe na banzete. Farao abondelaki Moize: ‘Bondelá Yehova alongola mayoyo oyo.’ Kasi ata ntango Yehova alongolaki mayoyo, Farao azalaki kaka motema makasi.

Yehova alobaki na Moize: ‘Sembolá lobɔkɔ na yo na likoló.’ Na mbala moko likoló ekómaki molili makasi. Na boumeli ya mikolo misato, Baezipito bakokaki komona moto te, eloko mpe te. Kaka Bayisraele nde bazalaki na pole.

Farao alobaki na Moize: ‘Yo ná bato na yo bokoki kokende. Bótika kaka banyama na bino.’ Moize alobaki: ‘Tokokende ná banyama na biso mpo tópesa yango Nzambe na biso mbeka.’ Farao asilikaki makasi. Agangaki: ‘Longwá na miso na ngai! Soki namoni yo lisusu, nakoboma yo.’

“Bokomona lisusu bokeseni kati na moyengebene ná moto mabe, kati na moto oyo asalelaka Nzambe ná moto oyo asaleli ye te.”​—Malaki 3:18