Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 25

Tabernakle mpo na losambo

Tabernakle mpo na losambo

Ntango Moize azalaki na Ngomba Sinai, Yehova ayebisaki ye atonga hema moko oyo ekesanaki na misusu. Babengaki yango tabernakle, epai Bayisraele bakokaki kosambela Ye. Bakobanda komema tabernakle yango esika nyonso oyo bakokende.

Yehova alobaki: ‘Yebisá bato bápesa biloko oyo bazali na yango, mpo na kotonga tabernakle.’ Bayisraele bapesaki wolo, palata, motako, mabanga ya ntalo, biloko ya matoi, mpɛtɛ, mpe bongo na bongo. Bapesaki mpe lɛnɛ, lini, mposo ya nyama, mpe biloko mosusu ebele. Bazalaki kopesa biloko ebele mpenza tii Moize ayebisaki bango: ‘Ekoki! Bópesa lisusu te.’

Basi ná mibali oyo bayebi mosala malamu bapesaki maboko mpo na kotonga tabernakle. Yehova apesaki bango bwanya mpo básala yango. Bamosusu basalaki nsinga, batongaki bilamba, to basalaki mayemi na nsinga. Bamosusu babongisaki mabanga, basalaki misala na wolo, to na mabaya.

Batongaki tabernakle kaka ndenge Yehova ayebisaki bango. Basalaki rido moko ya kitoko mpo na kokabola tabernakle na biteni mibale: Esika Mosantu mpe Esika oyo Eleki Bosantu. Na Esika oyo Eleki Bosantu, batyaki sanduku ya kondimana, oyo esalemaki na nzete ya akasia mpe wolo. Na Esika Mosantu, batyaki etɛlɛmiselo ya miinda oyo basalá na wolo, mesa, mpe etumbelo ya mpaka ya malasi. Na lopango na yango ezalaki na saani moko monene oyo basalá na motako mpe etumbelo moko monene. Sanduku ya kondimana ezalaki kokundwela Bayisraele elaka na bango ya kotosa Yehova. Oyebi soki kondimana ezali nini? Ezali elaka moko ya ndenge mosusu.

Yehova aponaki Arona ná bana na ye básalaka na tabernakle lokola banganga-nzambe. Basengelaki kobatela yango mpe kopesa Yehova mbeka kuna. Kaka Arona nde akokaki kokɔta na Esika oyo Eleki Bosantu mpo azalaki nganga-nzambe monene. Azalaki kokɔta kuna mbala moko na mbula mpo na kopesa mbeka mpo na masumu na ye moko, ya bato ya libota na ye, mpe ya ekólo mobimba ya Yisraele.

Bayisraele basilisaki kotonga tabernakle mbula moko nsima ya kobima na Ezipito. Sikoyo bazwaki esika ya kosambela Yehova.

Yehova amonisaki ete asepeli na tabernakle yango mpe asalaki ete lipata moko emonana likoló na yango. Soki lipata efandi kaka likoló ya tabernakle, Bayisraele bazalaki kotikala kaka esika bazali. Kasi soki lipata etombwani, elongwe na tabernakle, bazalaki koyeba ete basengeli kolongwa na esika wana. Bazalaki komema tabernakle bitenibiteni mpe kolanda lipata.

“Bongo nayokaki mongongo moko ya makasi euti na kiti ya bokonzi elobi ete: ‘Talá! Hema ya Nzambe ezali esika moko na bato, mpe akofanda na bango mpe bakozala bato na ye. Mpe Nzambe ye moko akozala na bango.’”​—Emoniseli 21:3