Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 26

Banɔngi zomi na mibale

Banɔngi zomi na mibale

Bayisraele balongwaki na Ngomba Sinai, bakatisaki esobe ya Parane, mpe bakómaki na esika babengi Kadeshe. Kuna, Yehova ayebisaki Moize: ‘Tindá mibali 12, mobali moko na libota mokomoko, mpo bákende kotala Kanana, mokili oyo nakopesa Bayisraele.’ Na yango, Moize aponaki mibali 12 mpe alobaki na bango: ‘Bókende na Kanana mpe bótala soki mabele na yango ebotaka malamu. Bótala soki bato na yango bazali makasi to te, soki bafandaka na bahema to na bingumba.’ Banɔngi yango 12, kati na bango Yosua ná Kalebe, bakendaki na Kanana.

Nsima ya mikolo 40, mibali yango bazongaki, bayaki na bambuma ya figi, ya grenade, mpe ya vinyo. Banɔngi yango bapesaki nsango oyo: ‘Mokili yango ezali malamu, kasi bato na yango bazali makasi mpe bingumba na bango ezali na bifelo ya milai.’ Na nsima, Kalebe alobaki: ‘Tokolonga bango. Tókende kaka sikoyo!’ Oyebi mpo na nini Kalebe alobaki bongo? Mpo ye ná Yosua batyelaki Yehova motema. Kasi banɔngi mosusu zomi balobaki: ‘Te! Bato yango bazali bingambe, bilombe! Tomimonaki lokola makɔnkɔ (mabanki) liboso na bango.’

Bayisraele balɛmbaki nzoto. Babandaki komilelalela mpe kolobana: ‘Tópona mokambi mosusu mpe tózonga na Ezipito. Mpo na nini tókende kuna mpo báboma biso?’ Yosua ná Kalebe balobaki: ‘Bótosa Yehova, mpe bóbanga te. Yehova akobatela biso.’ Kasi Bayisraele bayokaki te. Balingaki kutu koboma Yosua ná Kalebe!

Yehova asalaki nini? Alobaki na Moize: ‘Nasali makambo mingi mpo na Bayisraele, kasi bazali kaka kotosa ngai te. Bakotikala na esobe mbula 40, mpe bakokufa wana. Kaka bana na bango mpe Yosua ná Kalebe nde bakokɔta na mokili oyo nalakaki kopesa bango.’

“Mpo na nini bozali kobangabanga, bino bato ya kondima moke?”​—Matai 8:26