Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 27

Batombokelaki Yehova

Batombokelaki Yehova

Mwa moke na nsima, wana Bayisraele bazalaki na esobe, Kora, Datane, Abirame ná bato mosusu 250 batombokelaki Moize. Balobaki na ye ete: ‘Tobaye bino! Mpo na nini yo nde ozali mokambi na biso mpe Arona azali nganga-nzambe monene? Yehova azali kaka elongo na yo ná Arona te, azali elongo na biso nyonso.’ Yehova asepelaki te na likambo wana. Amonaki ete bato yango batombokelaki nde ye!

Moize alobaki na Kora ná bato na ye ete: ‘Lobi bóya liboso ya tabernakle, mpe moto na moto amema eloko na ye ya kotya mɔtɔ ná mpaka ya malasi likoló na yango. Yehova akolakisa biso moto oyo ye aponi.’

Na ntɔngɔ, Kora ná bato 250 akendaki kokutana na Moize na tabernakle. Batumbaki mpaka ya malasi lokola nde bazalaki banganga-nzambe. Mpe Yehova ayebisaki Moize ná Arona: ‘Bólongwa na kati ya Kora ná bato na ye.’

Kora akendaki esika Moize abengaki bango na tabernakle, kasi Datane, Abirame, ná mabota na bango baboyaki kokende. Yehova ayebisaki Bayisraele bálongwa pene na hema ya Kora, ya Datane, mpe ya Abirame. Bayisraele balongwaki mbala moko. Datane, Abirame, ná mabota na bango batɛlɛmaki na libándá ya bahema na bango. Na mbala moko mabele ekabwanaki mpe emɛlaki bango! Na tabernakle, mɔtɔ eutaki na likoló mpe etumbaki Kora ná bato na ye 250.

Na nsima, Yehova alobaki na Moize: ‘Zwá lingenda ya nkumu ya libota mokomoko, mpe komá nkombo ya mokomoko likoló ya lingenda na ye. Na lingenda ya libota ya Levi, komá nkombo ya Arona. Tyá yango na kati ya tabernakle, mpe lingenda ya moto oyo naponi ekobimisa fololo.’

Mokolo oyo elandaki, Moize abimisaki mangenda yango mpe alakisaki bankumu. Lingenda ya Arona nde ebimisaki fololo mpe ebotaki mbuma ya amande oyo eteli. Na yango, Yehova amonisaki ete aponaki Arona azala nganga-nzambe monene.

“Bótosaka baoyo bazali kokamba bino mpe bómikitisaka liboso na bango.”​—Baebre 13:17