Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 28

Mpunda ya Balaama elobi

Mpunda ya Balaama elobi

Bayisraele basili koumela mbula soki 40 na esobe. Babɔtɔlaki bingumba mingi ya makasi. Sikoyo, lokola batyaki kaa na bango na mokili patatalu ya Moabe, na ɛsti ya Ebale Yordani, ekómaki ntango ya kokɔta na Mokili ya Ndaka. Balake, mokonzi ya Moabe, abangaki ete Bayisraele bakobɔtɔla ye mokili na ye. Na yango, abengaki mobali moko na nkombo Balaama aya na Moabe kolakela Bayisraele mabe.

Kasi Yehova ayebisaki Balaama: ‘Kolakela Bayisraele mabe te.’ Na yango, Balaama aboyaki kokende. Mokonzi Balake abengaki ye lisusu mpe alobaki na ye ete akopesa ye eloko nyonso oyo alingi. Balaama aboyaki kaka. Na nsima, Nzambe alobaki: ‘Kende, kasi okoloba kaka makambo oyo nakoyebisa yo.’

Balaama amataki na mpunda na ye mpe akendaki na sudi, na Moabe. Akanaki kolakela Bayisraele mabe, atako Yehova apekisaki ye. Anzelu ya Yehova abimelaki ye na nzela mbala misato. Balaama azalaki komona anzelu te, kasi mpunda na ye ezalaki komona. Mbala ya liboso, mpunda elongwaki na nzela mpe ekɔtaki na esobe. Mbala ya mibale, mpunda emifinaki na efelo moko ya mabanga, mpe efinaki lokolo ya Balaama na efelo yango. Na mbala ya misato, mpunda yango elalaki na nse, na katikati ya nzela. Mbala nyonso wana, Balaama azalaki kobɛta mpunda yango fimbo.

Na nsima, Yehova alobisaki mpunda yango. Mpunda etunaki Balaama: ‘Mpo na nini ozali kobɛtabɛta ngai?’ Balaama alobaki: ‘Osaleli ngai nko. Soki nazalaki na mopanga mbɛlɛ nabomi yo.’ Mpunda ezongiselaki ye: ‘Otambolaka na ngai banda bambula mingi. Nasilá kosala yo boye?’

Na yango, Yehova atikaki Balaama amona anzelu. Anzelu alobaki: ‘Yehova apekisaki yo kolakela Bayisraele mabe.’ Balaama alobaki: ‘Nasali mabe. Nakozonga epai na ngai.’ Kasi anzelu alobaki: ‘Kende na Moabe, kasi okoloba kaka makambo oyo Yehova ayebisi yo.’

Balaama azwaki liteya? Te. Alukaki kaka kolakela Bayisraele mabe mbala misato, kasi na mbala nyonso wana Yehova asalaki ete Balaama apambola nde bango. Nsukansuka, Bayisraele babundisaki Moabe mpe Balaama abomamaki. Elingaki kozala malamu mpenza soki Balaama ayokelaka liboso Yehova!

“Bókeba na motindo nyonso ya bilulela, mpo ata soki moto azali na biloko mingi, biloko na ye ekopesa ye bomoi te.”​—Luka 12:15