Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 29

Yehova aponaki Yosua

Yehova aponaki Yosua

Nsima ya kotambwisa ekólo Yisraele bambula mingi, Moize akómaki na nsuka ya bomoi na ye. Yehova alobaki na ye: ‘Okokɔtisa Bayisraele na Mokili ya Ndaka te. Kasi nakolakisa yo mokili yango.’ Na nsima, Moize asɛngaki Yehova apona mokambi ya sika mpo na bato. Yehova alobaki na ye: ‘Kende epai ya Yosua, mpe yebisá ye ete naponi ye.’

Moize ayebisaki bato ya ekólo ete etikali moke akufa, mpe ete Yehova aponi Yosua mpo akɔtisa bango na Mokili ya Ndaka. Moize alobaki na Yosua: ‘Kobanga te. Yehova akosalisa yo.’ Mwa moke na nsima, Moize amataki na nsɔngɛ ya Ngomba Nebo, mpe kuna Yehova alakisaki ye mokili oyo alakaki Abrahama, Yisaka, mpe Yakobo. Moize azalaki na mbula 120 ntango akufaki.

Yehova alobaki na Yosua: ‘Katisá Ebale Yordani, mpe kɔtá na Kanana. Nakosalisa yo kaka ndenge nasalisaki Moize. Osengeli kotánga Mibeko na ngai mokolo na mokolo. Kobanga te. Zalá na mpiko. Kende mpe salá makambo oyo natindi yo osala.’

Yosua atindaki bato mibale bákende konɔnga engumba Yeriko. Na lisolo oyo elandi, tokolobela makambo oyo elekaki kuna. Ntango bazongaki, bayebisaki bato ete ezali ntango ya malamu ya kokɔta na Kanana. Mokolo oyo elandaki, Yosua ayebisaki bato bálongola kaa. Na nsima, alobaki na banganga-nzambe oyo bazalaki komema sanduku ya kondimana ete báleka liboso mpe bákɔta na Ebale Yordani. Ebale yango etondaki mpenza. Kasi ntango kaka makolo ya banganga-nzambe ekɔtaki na mai, ebale etɛlɛmaki mpe mai ebandaki kokauka! Banganga-nzambe batambolaki tii na katikati ya ebale mpe batɛlɛmaki kaka wana, kino Yisraele mobimba ekatisaki na ngámbo mosusu. Boye likamwisi yango etindaki bango bákanisa lisusu makambo Yehova asalaki na Mbu Motane!

Nsukansuka, nsima ya bambula nyonso wana, Bayisraele bakɔtaki na Mokili ya Ndaka. Batongaki bandako mpe bingumba. Basalaki bilanga mpe kolona vinyo ná nzete ya mbuma. Mokili yango etondaki na miliki mpe na mafuta ya nzoi.

“Yehova akokamba yo mpenza ntango nyonso mpe akotondisa molimo na yo ata na mokili oyo ezikaziká.”​—Yisaya 58:11