Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 33

Ruta ná Naomi

Ruta ná Naomi

Na eleko moko ya nzala makasi na Yisraele, mwasi moko na nkombo Naomi, ná mobali na ye mpe bana na bango mibale ya mibali, bakendaki kofanda na mokili ya Moabe. Na nsima, mobali ya Naomi akufaki. Bana na ye babalaki Ruta ná Orpa, basi ya Moabe. Kasi na nsima, bana ya Naomi mpe bakufaki.

Ntango Naomi ayokaki ete nzala esili na Yisraele, azwaki ekateli ya kozonga kuna na mboka na ye. Ruta ná Orpa babandaki kozonga elongo na ye; kasi na nzela Naomi ayebisaki bango: ‘Bozalaki basi ya malamu mpo na bana na ngai mpe babokilo ya malamu. Nalingi bóbala lisusu. Bózonga na Moabe.’ Ruta ná Orpa balobaki: ‘Tolingi yo! Tokotika yo te.’ Naomi akobaki koloba na bango bázonga. Nsukansuka, Orpa azongaki, kasi Ruta aboyaki kozonga. Naomi alobaki na ye: ‘Orpa azali kozonga epai ya bato na ye mpe banzambe na ye. Zongá elongo na ye mpe kende na ndako ya mama na yo.’ Kasi Ruta alobaki: ‘Nakotika yo te. Bato na yo bakozala bato na ngai, mpe Nzambe na yo akozala Nzambe na ngai.’ Okanisi ete Naomi ayokaki ndenge nini ntango Ruta alobaki bongo?

Ruta ná Naomi bakómaki na Yisraele na ebandeli ya eleko ya kobuka mbuma ya orje. Mokolo moko, Ruta akendaki kolɔkɔta mbuma na elanga ya mobali moko na nkombo Boaze, oyo azalaki mwana ya Rahaba. Boaze ayokaki ete Ruta azali moto ya Moabe mpe afandaki malamu na Naomi. Ayebisaki bato na ye ya mosala bátikelaka Ruta mwa mbuma mosusu na elanga mpo alɔkɔtaka yango.

Na mpokwa, Naomi atunaki Ruta: ‘Lelo osalaki na elanga ya nani?’ Ruta alobaki: ‘Na elanga ya mobali moko na nkombo Boaze.’ Naomi ayebisaki ye: ‘Boaze azali ndeko ya mobali na ngai. Saláká na elanga na ye elongo na bilenge basi mosusu. Okozala malamu kuna.’

Ruta asalaki kaka na elanga ya Boaze tii eleko ya kobuka mbuma esilaki. Boaze amonaki ete Ruta azalaki makasi na mosala mpe mwasi malamu mpenza. Na ntango wana, soki mobali moko akufi kasi abotaki te, ndeko na ye asengelaki kobala mwasi oyo mobali yango atiki. Na yango, Boaze abalaki Ruta. Babotaki mwana mobali mpe bapesaki ye nkombo Obede, oyo na nsima akómaki nkɔkɔ ya Mokonzi Davidi. Baninga ya Naomi basepelaki. Balobaki na ye: ‘Liboso, Yehova apesaki yo Ruta, oyo alingaki yo mingi, mpe sikoyo apesi yo nkɔkɔ ya mobali. Yehova akumisama!’

“Moninga mosusu akangamaka makasi koleka ndeko.”​—Masese 18:24