Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 36

Elaka ya Yefeta

Elaka ya Yefeta

Bayisraele basundolaki lisusu Yehova mpe bakómaki lisusu kosambela banzambe ya lokuta. Ntango bana ya Amone bayelaki bango mpe babundisaki bango, banzambe yango basalaki eloko te mpo na kosalisa Bayisraele. Bayisraele banyokwamaki bambula ebele mpenza. Nsukansuka balobaki na Yehova: ‘Tosali lisumu. Tobondeli yo, bikisá biso na mabɔkɔ ya banguna.’ Bayisraele babukaki bikeko na bango mpe bazongelaki kosambela Yehova. Yehova alingaki lisusu komona bango na mpasi te.

Baponaki elombe mobali moko na nkombo Yefeta mpo akamba bato na etumba mpo na kobundisa bana ya Amone. Yefeta abondelaki Yehova ete: ‘Soki osalisi ngai nalonga etumba oyo, nalaki yo ete ntango nakozonga ndako, nakopesa yo moto ya liboso oyo akobima na ndako na ngai mpo na koyamba ngai.’ Yehova ayokaki libondeli ya Yefeta mpe asalisaki ye alonga etumba yango.

Ntango Yefeta azongaki na ndako, moto ya liboso oyo abimaki mpo na koyamba ye ezalaki mwana na ye ya mwasi, mwana kaka moko oyo azalaki na ye. Mwana yango azalaki kobina mpe kobɛta mbonda ya moke. Yefeta asalaki nini? Akanisaki elaka na ye mpe alobaki: ‘Ee mwana na ngai! Opesi ngai mpasi mingi. Napesaki Yehova elaka. Mpo na kotosa yango, nasengeli kotinda yo okende kosala na tabernakle na Shilo.’ Kasi, mwana na ye alobaki: ‘Tata, soki opesaki Yehova elaka, tosá yango. Kasi nasɛngi yo kaka sanza mibale nakende kofanda na bangomba ngai ná baninga na ngai ya basi. Na nsima nakokende na Shilo.’ Mwana ya Yefeta asalaki na tabernakle na bosembo bomoi na ye mobimba. Mbula na mbula, baninga na ye bazalaki kokende kotala ye na Shilo.

“Moto oyo alingi mwana mobali to mwana mwasi koleka ngai abongi na ngai te.”​—Matai 10:37