Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 38

Yehova akómisaki Samsone makasi

Yehova akómisaki Samsone makasi

Bayisraele ebele bazongelaki kosambela bikeko; na yango Yehova atikaki Bafilistia báyangela mboka na bango. Kasi Bayisraele mosusu bazalaki kaka kolinga Yehova. Moko na bango nkombo na ye ezalaki Manoa. Ye ná mwasi na ye bazalaki na mwana te. Mokolo moko Yehova atindaki anzelu epai ya mwasi ya Manoa. Anzelu alobaki na ye: ‘Okobota mwana mobali. Akobikisa Yisraele na mabɔkɔ ya Bafilistia. Akozala Monaziri.’ Oyebi soki Banaziri ezalaki banani? Ezalaki bato oyo Yehova aponaki mpo na kosalela ye. Bazalaki kokata nsuki na bango te.

Nsima ya mikolo, mwana ya Manoa abotamaki, mpe apesaki ye nkombo Samsone. Ntango Samsone akolaki, Yehova akómisaki ye makasi mingi. Abomaki kutu nkɔsi na mabɔkɔ. Mokolo moko, Samsone abomaki Bafilistia 30 kaka ye moko. Bafilistia bayinaki ye mpe bakómaki koluka mayele ya koboma ye. Mokolo moko oyo Samsone alalaki na Gaza, Bafilistia bakendaki kozela ye na porte ya engumba mpo ntango akobima na ntɔngɔ báboma ye. Kasi na katikati ya butu, Samsone alamukaki, akendaki na porte ya engumba mpe apikolaki yango. Amemaki yango na mapeka tii na likoló ya ngomba moko pene na Hebrone!

Na nsima, Bafilistia bakendaki epai ya mwasi na ye Delila, mpe balobaki na ye: ‘Tokopesa yo palata ebele soki oyebi ntina oyo Samsone azali na makasi mingi. Tolingi kokanga ye mpo tótya ye na bolɔkɔ.’ Lokola Delila alingaki mbongo, andimaki. Liboso, Samsone aboyaki koyebisa ye ntina oyo azali na makasi mingi. Kasi Delila atungisaki ye tii nsukansuka ayebisaki ye esika makasi na ye eutaka. Alobaki: ‘Bakatá ngai naino nsuki te mpo nazali Monaziri. Soki bakati ngai nsuki, makasi na ngai ekosila.’ Samsone asalaki mabe mpenza ndenge ayebisaki sekele na ye!

Delila akendaki mbala moko koyebisa Bafilistia ete: ‘Nayebi sekele na ye!’ Alalisaki Samsone na makolo na ye, mpe abengaki moto moko akata ye nsuki. Na nsima, Delila abelelaki: ‘Samsone, Bafilistia bayei!’ Ntango Samsone alamukaki, azalaki lisusu na makasi te. Bafilistia bakangaki ye, batɔbɔlaki ye miso, mpe batyaki ye na bolɔkɔ.

Mokolo moko, ntango ebele ya Bafilistia basanganaki na tempelo ya nzambe na bango Dagone bazalaki koganga: ‘Nzambe na biso apesi biso Samsone! Bóbimisa ye awa! Tósakana na ye.’ Babimisaki ye, batɛlɛmisaki ye na katikati ya makonzí mibale, mpe bazalaki kotyola ye. Samsone abelelaki: ‘Ee Yehova, pesá ngai lisusu makasi.’ Na ntango wana, nsuki ya Samsone ekómaki lisusu milai. Atindikaki makonzí ya tempelo na makasi na ye nyonso. Ndako yango mobimba ebukanaki, ebomaki bato nyonso oyo bazalaki na kati; Samsone mpe akufaki.

“Na makambo nyonso nazali na makasi na lisalisi ya moto oyo apesaka ngai nguya.”​—Bafilipi 4:13