Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 42

Yonatane: Mobali ya mpiko mpe ya sembo

Yonatane: Mobali ya mpiko mpe ya sembo

Yonatane, mwana ya liboso ya Mokonzi Saulo, azalaki soda ya mpiko mpenza. Davidi alobaki ete Yonatane azalaki na mbangu koleka mpongo mpe na makasi koleka nkɔsi. Mokolo moko, Yonatane amonaki basoda 20 ya Bafilistia na mwa ngomba moko. Alobaki na momemi-bibundeli na ye: ‘Tokobunda na bango kaka soki Yehova apesi biso elembo. Soki Bafilistia balobi na biso tómata, wana tokobunda na bango.’ Bongo Bafilistia babelelaki bango: “Bómata awa tóbunda!” Na yango, mibali yango mibale bamataki mpe babomaki basoda yango.

Lokola Yonatane azalaki mwana ya liboso ya Saulo, ye moto asengelaki kokóma mokonzi nsima na ye. Yonatane ayebaki ete Yehova aponaki nde Davidi akóma mokonzi ya Yisraele; kasi ayokelaki ye zuwa te. Yonatane ná Davidi bakómaki baninga ya motema. Bayokanaki ete bakobatelana mpe bakosalisana. Yonatane apesaki Davidi kazaka, mopanga, litimbo, mpe mokaba na ye mpo na komonisa ete bakómi baninga ya motema.

Ntango Davidi azalaki kokima Saulo, Yonatane akendaki epai na ye mpe ayebisaki ye: ‘Zalá makasi mpe na mpiko. Yehova aponi yo ozala mokonzi. Ata tata na ngai ayebi yango.’ Okolinga kozala na moninga malamu lokola Yonatane?

Mbala ebele, Yonatane atyaki bomoi na ye na likama mpo na kosalisa moninga na ye. Ayebaki ete Mokonzi Saulo alingaki koboma Davidi, yango wana alobaki na tata na ye: ‘Soki obomi Davidi, okosala lisumu mpo asali yo mabe te.’ Saulo ayokelaki Yonatane nkanda makasi. Mwa bambula na nsima, Saulo ná Yonatane bakufaki na etumba.

Nsima ya liwa ya Yonatane, Davidi alukaki Mefiboshete, mwana ya Yonatane. Ntango Davidi amonaki Mefiboshete, ayebisaki ye boye: ‘Lokola tata na yo azalaki moninga na ngai ya motema, ntango nyonso oyo okozala na bomoi, nakosalisa yo. Okofanda na ndako na ngai mpe okolya na mesa na ngai.’ Davidi abosanaki moninga na ye Yonatane ata moke te.

“Bólinganaka ndenge ngai nalingi bino. Ata moto moko te azali na bolingo koleka oyo, ete moto akaba molimo [bomoi] na ye mpo na baninga na ye.”​—Yoane 15:12, 13