Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 43

Mokonzi Davidi asali lisumu

Mokonzi Davidi asali lisumu

Ntango Saulo akufaki, Davidi akómaki mokonzi. Azalaki na mbula 30. Nsima ya mwa bambula, mokolo moko na butu ntango atɛlɛmaki na veranda ya etaze ya ndako na ye, amonaki mwasi moko ya kitoko. Davidi atunaki, mpe bayebisaki ye ete mwasi yango nkombo na ye Bate-sheba mpe ete mobali na ye Uria azali soda. Davidi abengisaki Bate-sheba na ndako na ye. Basangisaki nzoto mpe azwaki zemi. Davidi alukaki kobomba mabe oyo asalaki. Ayebisaki mokonzi ya basoda atya Uria na molɔngɔ ya liboso na etumba mpe basoda nyonso bálongwa pene na ye. Ntango Uria akufaki na etumba wana, Davidi abalaki Bate-sheba.

Kasi Yehova amonaki makambo nyonso wana ya mabe. Asalaki nini? Atindaki mosakoli Natane epai ya Davidi. Natane alobaki na ye: ‘Moto moko ya bozwi azalaki na mpate ebele, mpe mobola moko azalaki kaka na mwana-mpate moko ya moke mpe alingaki yango mingi mpenza. Moto ya bozwi azwaki mwana-mpate kaka moko ya mobola wana.’ Davidi asilikaki makasi mpe alobaki: ‘Mozwi wana asengeli kokufa!’ Natane alobaki na ye ete: ‘Moto wana ya bozwi nde yo!’ Davidi ayokaki mpasi na motema, mpe ayebisaki Natane ete: ‘Nasaleli Yehova lisumu.’ Lisumu yango ememelaki Davidi ná libota na ye mikakatano mingi mpenza. Yehova apesaki ye etumbu, kasi atikaki ye na bomoi mpo andimaki mabe na ye mpe azalaki na komikitisa.

Davidi alingaki kotongela Yehova tempelo, kasi Yehova aponaki nde mwana na ye Salomo mpo atonga yango. Davidi abandaki kobongisela Salomo biloko ya kotonga tempelo mpe alobaki: ‘Tempelo ya Yehova esengeli kozala kitoko mpenza. Salomo azali naino elenge, kasi nakobongisa biloko nyonso mpo na kosalisa ye.’ Davidi apesaki mbongo na ye ebele mpo na kotonga tempelo. Alukaki bato oyo bayebi mosala malamu. Asangisaki wolo ná palata, mpe asɛngaki báyela ye nzete ya sɛdrɛ ya Tire mpe ya Sidone. Liboso Davidi akufa, apesaki Salomo plan ya tempelo yango. Alobaki na ye: ‘Yehova ayebisaki ngai nakomela yo makambo oyo. Yehova akosalisa yo. Kobanga te. Zalá makasi mpe salá mosala.’

“Ye oyo azali kozipa makambo na ye oyo ebuki mibeko akolonga te, kasi ye oyo ayamboli mpe atiki yango akoyokelama mawa.”​—Masese 28:13