Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 46

Momekano na Ngomba Karamele

Momekano na Ngomba Karamele

Bokonzi ya mabota zomi ya Yisraele ezalaki na bakonzi mingi ya mabe, kasi Ahaba nde alekaki mabe. Abalaki mwasi moko mabe mpenza oyo azalaki kosambela Baala. Nkombo ya mwasi yango Yezabele. Ahaba ná Yezabele batondisaki mboka na losambo ya Baala mpe babomaki basakoli ya Yehova. Yehova asalaki nini? Atindaki mosakoli Eliya apesa Ahaba nsango moko.

Eliya alobaki na Mokonzi Ahaba ete mpo na mabe na ye, mbula ekonɔka lisusu na Yisraele te. Na boumeli ya mbula misato ná ndambo, milona ebimaki te mpe bato bakufaki nzala. Na nsima, Yehova atindaki lisusu Eliya epai ya Ahaba. Mokonzi alobaki na ye: ‘Ozali kotya mobulu! Nyonso oyo ezali foti na yo.’ Eliya azongiselaki ye: ‘Ngai te moto napekisi mbula enɔka. Yo nde oluki yango mpo ozali kosambela Baala. Tokosala momekano moko. Yanganisá bato ná basakoli ya Baala na nsɔngɛ ya Ngomba Karamele.’

Bato bayanganaki na ngomba yango. Eliya alobaki: ‘Bókanisa nani bokopona. Soki Yehova azali Nzambe ya solo, bólanda ye. Soki ezali nde Baala, bólanda ye. Tósala momekano moko. Basakoli 450 ya Baala bábongisa mbeka mpe bábelela nzambe na bango; ngai mpe nakobongisa mbeka mpe nakobelela Yehova. Nzambe oyo akotinda mɔtɔ ye nde Nzambe ya solo.’ Bato bandimaki.

Basakoli ya Baala babongisaki mbeka. Babelelaki nzambe na bango mokolo mobimba: ‘Ee Baala, yanolá biso!’ Lokola Baala azalaki koyanola te, Eliya abandaki kosɛka ye. Alobaki: ‘Bóbelela na makasi na bino nyonso. Ntango mosusu alali, mpe esengeli moto alamusa ye.’ Basakoli ya Baala bazalaki kaka kobelela tii mpokwa ekómaki. Kasi Baala ayanolaki kaka te.

Sikoyo, Eliya atyaki mbeka na ye na etumbelo mpe asopelaki yango mai ebele. Na nsima abondelaki: ‘Ee Yehova, nabondeli yo, salá mpo bato báyeba ete ozali Nzambe ya solo.’ Na mbala moko, Yehova akitisaki mɔtɔ mpe etumbaki mbeka. Bato bagangaki: ‘Yehova azali Nzambe ya solo!’ Eliya alobaki: ‘Bótika ata mosakoli moko te ya Baala akima!’ Na mokolo yango, basakoli nyonso 450 ya Baala babomamaki.

Ntango mwa lipata moko ya moke ebimaki likoló, Eliya alobaki na Ahaba: ‘Mopɛpɛ makasi ezali koya. Kangisá likalo na yo, mpe zongá ndako.’ Likoló eyindaki makasi, mopɛpɛ ebandaki, mpe mbula ya makasi ebandaki konɔka. Nsukansuka, elanga esilaki. Ahaba azalaki kotambwisa likalo na ye na mbangu makasi. Na lisalisi ya Yehova, Eliya apotaki mbangu koleka likalo yango! Kasi mikakatano ya Eliya esilaki? Tókolobela yango.

“Báyeba ete yo, oyo nkombo na yo ezali Yehova, yo moko nde Oyo-Aleki-Likoló na mabele mobimba.”​—Nzembo 83:18