Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 48

Mwana ya mwasi moko oyo mobali akufá azongi na bomoi

Mwana ya mwasi moko oyo mobali akufá azongi na bomoi

Na ntango ya elanga makasi, Yehova alobaki na Eliya: ‘Kende na Zarefate. Kuna, mwasi moko oyo mobali akufá akopesa yo bilei.’ Na porte ya engumba yango, Eliya amonaki mwasi moko ya mobola oyo mobali akufá azali kolɔkɔta nkoni. Asɛngaki ye mai ya komɛla. Ntango azalaki kokende kozwela ye mai, Eliya ayebisaki ye: ‘Nabondeli yo, yelá ngai mpe mwa limpa.’ Kasi mwasi yango azongisaki: ‘Nazali na limpa ya kopesa yo te. Nazali kaka na mwa farini mpe mwa mafuta moke mpo na kosala mwa eloko ya kolya mpo na ngai ná mwana na ngai.’ Eliya ayebisaki ye: ‘Yehova alobi ete soki osaleli ngai mwa limpa, farini ná mafuta na yo ekosila te tii ntango mbula ekobɛta lisusu.’

Mwasi yango oyo mobali akufá akendaki na ndako mpe asalelaki mosakoli ya Yehova limpa. Kaka ndenge Yehova alobaki, mwasi yango ná mwana na ye bazangaki bilei te ntango nyonso oyo elanga eumelaki. Elokó na ye ya farini ná ya mafuta ezalaki kaka ya kotonda.

Na nsima, likambo moko ya mawa esalemaki. Mwana ya mwasi yango abɛlaki mpe akufaki. Mwasi yango asɛngaki Eliya asalisa ye. Eliya azwaki mwana yango mpe amemaki ye na shambrɛ moko ya likoló. Alalisaki ye na mbeto mpe abondelaki: ‘Yehova, nabondeli yo, zongisá mwana oyo na bomoi.’ Oyebi mpo na nini likambo oyo Yehova asalaki ekamwisaki? Ndenge totángaka na Biblia, naino moto moko te azongisamaki na bomoi liboso na ye. Lisusu, mwasi wana ná mwana na ye bazalaki Bayisraele te.

Mwana yango azongaki na bomoi mpe abandaki kopema! Eliya alobaki na mama yango: ‘Talá! Mwana na yo azali na bomoi.’ Asepelaki mingi mpe alobaki na Eliya: ‘Ozali mpenza moto ya Nzambe. Mpo olobaka kaka makambo oyo Yehova ayebisaka yo oloba.’

“Bótala malamumalamu bayanganga, mpamba te elonaka te mpe ebukaka te, mpe ezali na esika ya kobomba bilei te mpe na ndako ya kobomba biloko te, kasi atako bongo Nzambe aleisaka yango. Bino boleki bandɛkɛ na motuya mosika te?”​—Luka 12:24