Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 49

Mwasi ya mokonzi moko azwi etumbu

Mwasi ya mokonzi moko azwi etumbu

Longwa na lininisa ya ndako na ye na Yizireele, Mokonzi Ahaba azalaki komona elanga ya vinyo ya mobali moko na nkombo Nabote. Ahaba alulaki elanga yango, mpe alingaki Nabote atɛkɛla ye yango. Kasi Nabote aboyaki mpo Mibeko ya Yehova epekisaki kotɛka mabele bankɔkɔ batiká. Ahaba asepelaki na Nabote mpo asalaki oyo ezali malamu? Te. Ayokaki nkanda makasi. Akómaki mawamawa, aboyaki kolongwa na mbeto mpe aboyaki kolya.

Yezabele, mwasi na ye ya motema mabe, ayebisaki ye: ‘Ozali mokonzi ya Yisraele. Okoki kozwa eloko nyonso olingi. Nakozwela yo mabele wana.’ Akomelaki mikóló ya engumba mikanda; ayebisaki bango bákosela Nabote makambo ete alakeli Nzambe mabe mpe bábamba ye mabanga akufa. Mikóló yango basalaki ndenge Yezabele ayebisaki bango, mpe na nsima Yezabele alobaki na Ahaba: ‘Nabote akufi. Elanga ya vinyo ekómi ya yo.’

Longola Nabote, Yezabele abomaki mpe bato mosusu oyo basalaki eloko te. Abomaki bato mingi oyo bazalaki kolinga Yehova. Azalaki kosambela bikeko mpe asalaki makambo mosusu ya mabe. Yehova amonaki nyonso oyo Yezabele azalaki kosala. Asalaki ye nini?

Ntango Ahaba akufaki, mwana na ye ya mobali Yehorame akómaki mokonzi. Yehova atindaki mobali moko na nkombo Yehu apesa Yezabele ná libota na ye etumbu.

Yehu amemaki likalo na ye tii na Yizireele, esika Yezabele azalaki kofanda. Yehorame ayaki na likalo mpo na kokutana na Yehu mpe atunaki ye: ‘Kimya ezali kati na biso?’ Yehu alobaki: ‘Kimya ekozala te, mpo mama na yo Yezabele azali kosala makambo ya mabe.’ Yehorame alukaki kobalusa likalo na ye mpo akima. Kasi Yehu abɛtaki ye likula, mpe akufaki.

Na nsima, Yehu akendaki na ndako ya Yezabele. Ntango Yezabele ayokaki ete Yehu azali koya, asalaki monzɛlɛ, abongisaki nsuki, mpe afandaki na lininisa na likoló mpo na kozela. Ntango Yehu akómaki, apesaki Yezabele mbote na lityo. Abelelaki basali ya Yezabele oyo bazalaki na ye ete: “Bóbwaka ye na nse!” Batindikaki Yezabele na lininisa, akweaki na mabele mpe akufaki.

Nsima na yango, Yehu abomaki bana 70 ya Ahaba mpe alongolaki losambo ya Baala na mboka. Omoni? Yehova ayebaka makambo nyonso mpe na ntango oyo ebongi, apesaka bato oyo basalaka mabe etumbu!

“Libula ezwamaka na lokoso na ebandeli, kasi nsuka na yango ekopambolama te.”​—Masese 20:21