Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 52

Limpinga ya baanzelu ya Yehova

Limpinga ya baanzelu ya Yehova

Bene-hadade, mokonzi ya Siri, azalaki kaka kobundisa Yisraele. Kasi, mosakoli Elisha azalaki ntango nyonso koyebisa mokonzi ya Yisraele ete akeba; yango ezalaki kosalisa mokonzi akwea na likama te. Bene-hadade azwaki mokano ya kokanga Elisha. Ayokaki ete Elisha azalaki na engumba Dotane, mpe atindaki basoda ya Siri kuna mpo bákanga ye.

Basoda ya Siri bakómaki na Dotane na butu. Na ntɔngɔ, ntango mosaleli ya Elisha abimaki libándá, amonaki ebele ya basoda bazingi engumba. Ayokaki nsɔmɔ mpe agangaki: ‘Elisha, tósala nini?’ Elisha ayebisaki ye: ‘Baoyo bazali na biso bazali mingi koleka baoyo bazali na bango.’ Na mbala moko, Yehova asalaki ete mosaleli ya Elisha amona ndenge bangomba nyonso zingazinga ya engumba etondaki na bampunda mpe makalo ya bitumba ya mɔtɔ.

Ntango basoda ya Siri balingaki kokanga Elisha, Elisha abondelaki: ‘Yehova, nabondeli yo, bomá bango miso.’ Na mbala moko, basoda yango bayebaki te esika bazali, atako bazalaki komona. Elisha ayebisaki bango: ‘Boyei na engumba mosusu. Bólanda ngai, nakomema bino epai ya moto oyo bozali koluka.’ Balandaki Elisha tii na Samaria, esika mokonzi ya Yisraele azalaki kofanda.

Na ntango yango nde basoda ya Siri bayaki koyeba esika bazalaki. Mokonzi ya Yisraele atunaki Elisha: ‘Naboma bango?’ Elisha amonaki nde ete ezali libaku ya kozongisela bato yango mabe oyo balingaki kosala ye? Te. Elisha alobaki na ye: ‘Koboma bango te. Pesá bango bilei mpe tiká bango bázonga epai na bango.’ Na yango, mokonzi asalelaki bango fɛti moko monene mpe atikaki bango bázonga epai na bango.

“Kotya motema oyo totyelaka ye yango oyo: ete, ezala eloko nini biso tokosɛnga na boyokani na mokano na ye, akoyoka biso.”​—1 Yoane 5:14