Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 58

Yerusaleme ebebisami

Yerusaleme ebebisami

Bato ya Yuda batikaki Yehova mbala na mbala mpo na kosambela banzambe ya lokuta. Na boumeli ya bambula ebele, Yehova alukaki kosalisa bango. Atindaki basakoli ndenge na ndenge mpo na kokebisa bango, kasi bayokaki te. Bazalaki kutu kosɛka basakoli yango. Yehova asalaki nini mpo na kosukisa losambo na bango ya bikeko?

Nebukadenezare, mokonzi ya Babilone, azalaki kozwa ekólo mokomoko. Mbala ya liboso oyo azwaki Yerusaleme, akangaki Mokonzi Yehoyakine, bankumu, bilombe ya bitumba ná bato ya misala ya mabɔkɔ, mpe amemaki bango nyonso na Babilone. Azwaki mpe biloko nyonso ya motuya oyo ezalaki na tempelo ya Yehova. Na nsima, Nebukadenezare atyaki Zidikiya mokonzi ya Yuda.

Na ebandeli, Zidikiya azalaki kotosa Nebukadenezare. Kasi, bikólo ya pembenipembeni ná basakoli ya lokuta bayebisaki ye atombokela Babilone. Yirimia akebisaki ye: ‘Soki otomboki, bakoboma bato, mpe nzala ná maladi ekokɔta na Yuda.’

Nsima ya koyangela mbula mwambe, Zidikiya amonaki malamu atombokela Babilone. Asɛngaki basoda ya Ezipito básalisa ye. Nebukadenezare atindaki basoda na ye bábundisa Yerusaleme, mpe batyaki kaa libándá ya engumba yango. Yirimia ayebisaki Zidikiya: ‘Yehova alobi ete soki omitiki na mabɔkɔ ya Babilone, yo ná Yerusaleme bokobika. Soki omitiki te, bato ya Babilone bakotumba Yerusaleme mpe bakomema yo na bolɔkɔ.’ Zidikiya alobaki: ‘Nakomitika te!’

Nsima ya mbula moko ná ndambo, basoda ya Babilone babukaki bifelo ya Yerusaleme mpe batyaki mɔtɔ na engumba. Batumbaki tempelo, babomaki bato ebele, mpe bakangaki bankóto ya bato.

Zidikiya akimaki, kasi basoda ya Babilone balandaki ye. Bakangaki ye pene na Yeriko mpe bamemaki ye epai ya Nebukadenezare. Mokonzi ya Babilone atikaki Zidikiya amona ndenge bazalaki koboma bana na ye. Na nsima, atɔbɔlaki ye miso, atyaki ye na bolɔko, mpe kuna nde akufaki. Kasi Yehova alakaki bato ya Yuda ete: ‘Nsima ya mbula 70, nakozongisa bino na Yerusaleme.’

Nini ekómelaki bilenge oyo bamemamaki na bolɔkɔ na Babilone? Batikalaki sembo epai ya Yehova? Tokolobela yango.

“Yehova Nzambe, Mozwi-ya-Nguya-Nyonso, bikateli ya lisambisi na yo ezali solo mpe boyengebene.”​—Emoniseli 16:7