Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 59

Bana mibali minei oyo batosaki Yehova

Bana mibali minei oyo batosaki Yehova

Ntango Nebukadenezare amemaki bankumu ya Yuda na Babilone, apesaki Ashepenaze mokumba ya kokamba bango. Nebukadenezare ayebisaki Ashepenaze apona na kati na bango bana mibali oyo bazalaki nzoto makasi mpe kitoko. Bana mibali yango basengelaki kolanda mateya mbula misato. Mateya yango esengelaki kobongisa bango mpo bákóma bato minene na Babilone. Bana yango basengelaki koyekola kotánga, kokoma mpe koloba monɔkɔ ya Akkadien, oyo ezalaki kolobama na Babilone. Basengelaki mpe kolya biloko oyo mokonzi ná bato ya ndako na ye bazalaki kolya. Danyele, Hanania, Mishaele mpe Azaria bazalaki na kati ya bana yango. Ashepenaze apesaki bango bankombo ya Babilone: Beleteshazare, Shadrake, Meshake, mpe Abedenego. Batikaki kosalela Yehova mpo na makambo oyo bateyaki bango?

Bana yango minei baponaki kotosa Yehova. Bayebaki ete basengeli kolya bilei ya mokonzi te mpamba te na kotalela Mibeko ya Yehova, biloko yango mosusu ezalaki mbindo. Bayebisaki Ashepenaze ete: ‘Tobondeli yo, kopesa biso bilei ya mokonzi te.’ Ashepenaze ayebisaki bango: ‘Soki bolei yango te mpe mokonzi amoni ete bokómi lokola bato ya maladi, akoboma ngai!’

Likanisi moko eyelaki Danyele. Alobaki na mokɛngɛli na bango: ‘Nabondeli yo, pesá biso kaka ndunda ná mai mikolo zomi. Na nsima, talá biso ná bana oyo bazali kolya bilei ya mokonzi.’ Mokɛngɛli andimaki.

Nsima ya mikolo zomi yango, Danyele ná baninga na ye misato bamonanaki nzoto makasi koleka bana mosusu. Yehova asepelaki mpo bazalaki kotosa ye. Kutu, apesaki Danyele mayele ya koyeba bimonaneli ná bandɔtɔ.

Ntango basilisaki koyekola, Ashepenaze akɔtisaki bana mibali yango epai ya Nebukadenezare. Mokonzi asololaki na bango mpe amonaki ete Danyele, Hanania, Mishaele ná Azaria bazalaki mayele mpe ekɛngɛ koleka bana mosusu. Aponaki bango minei básala na ndako ya mokonzi. Mbala mingi, mokonzi azalaki kosɛnga bango toli na makambo ya minene. Yehova asalaki ete bázala na mayele koleka bato nyonso ya mayele mpe bato ya maji ya mokonzi.

Atako bazalaki na mboka mopaya, Danyele, Hanania, Mishaele, mpe Azaria babosanaki te ete bazalaki basaleli ya Yehova. Yo mpe okokanisa Yehova ntango nyonso, ata soki baboti na yo bazali wana te?

“Moto atyola bolenge na yo te. Nzokande, zalá ndakisa epai ya bato ya sembo na maloba, na etamboli, na bolingo, na kondima, [mpe] na bizaleli ya pɛto.”​—1 Timote 4:12