Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 64

Danyele na libulu ya bankɔsi

Danyele na libulu ya bankɔsi

Mokonzi mosusu ya Babilone ezalaki Dariuse Momede. Dariuse amonaki ete Danyele akeseni na bato nyonso. Atyaki ye akamba bato minene ya mokili na ye. Bato yango bayokelaki Danyele zuwa mpe balingaki kolongola ye. Lokola bayebaki ete Danyele azalaki kobondela Yehova mbala misato na mokolo, bayebisaki Dariuse ete: ‘Ee mokonzi, tyá mobeko ete moto nyonso abondela kaka yo. Moto oyo akotosa mobeko yango te asengeli kobwakama na libulu ya bankɔsi.’ Dariuse asepelaki na likanisi yango, mpe atyaki lobɔkɔ na mobeko yango.

Ntango kaka Danyele ayokaki mobeko yango ya sika, akendaki na ndako na ye. Afukamaki liboso ya lininisa oyo ezalaki polele mpe abondelaki Yehova. Mibali wana ya zuwa bakɔtelaki Danyele na ndako mpe bakutaki ye azali kobondela. Bakendaki mbangu epai ya Mokonzi mpe balobaki: ‘Danyele atosi yo te. Azali kobondela Nzambe na ye mbala misato na mokolo.’ Dariuse azalaki kolinga Danyele mpe alingaki te ete akufa. Mokolo mobimba alukaki ndenge ya kobikisa ye. Nzokande ata mokonzi akokaki te kobongola mobeko oyo ye moko atyaki lobɔkɔ. Asengelaki kaka kotinda bato na ye bábwaka Danyele na libulu ya bankɔsi.

Na butu yango, Dariuse azwaki mpɔngi te mpo azalaki komitungisa mingi mpo na Danyele. Na ntɔngɔ, akendaki mbangu na libulu yango mpe abelelaki Danyele: ‘Nzambe na yo abikisi yo?’

Dariuse ayokaki moto alobi. Ezalaki Danyele! Azongiselaki mokonzi: ‘Anzelu ya Yehova akangaki monɔkɔ ya bankɔsi. Esali ngai mabe te.’ Dariuse asepelaki mingi! Atindaki bábimisa Danyele na libulu yango. Danyele azalaki ata na mpota te na nzoto na ye. Na nsima, mokonzi apesaki mitindo: ‘Bóbwaka mibali oyo bafundaki Danyele na libulu.’ Ntango babwakaki mibali yango, bankɔsi elyaki bango.

Dariuse apesaki bato na ye mitindo oyo: ‘Moto nyonso asengeli kobanga Nzambe ya Danyele. Abikisaki Danyele na libulu ya bankɔsi.’

Obondelaka Yehova mikolo nyonso, lokola Danyele?

“Yehova ayebi kosikola na komekama bato oyo bakangamaka na Nzambe.”​—2 Petro 2:9