Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 68

Elizabeti aboti mwana

Elizabeti aboti mwana

Mbula koleka 400 nsima ya kotonga lisusu bifelo ya Yerusaleme, nganga-nzambe moko na nkombo Zekaria ná mwasi na ye Elizabeti, bazalaki kofanda pene na Yerusaleme. Baumelaki mingi na libala na bango kasi babotaki te. Mokolo moko ntango Zekaria azalaki kotumba mpaka ya malasi na esika mosantu, anzelu Gabriele abimelaki ye. Zekaria alɛngaki, kasi anzelu yango alobaki na ye boye: ‘Kobanga te. Namemeli yo nsango malamu oyo euti epai ya Yehova. Mwasi na yo Elizabeti akobota mwana mobali mpe nkombo na ye ekozala Yoane. Yehova aponi ye asala mosala moko ya ntina mpenza.’ Zekaria atunaki anzelu yango: ‘Ndenge nini nakondimela yo? Ngai ná mwasi na ngai tokómi mikóló mpenza, tokoki kobota te.’ Anzelu Gabriele alobaki na ye: ‘Nzambe atindi ngai napesa yo nsango oyo. Kasi lokola ondimeli ngai te, okoloba lisusu te tii mwana yango akobotama.’

Zekaria aumelaki na esika mosantu koleka ndenge baumelaka. Nsukansuka ntango abimaki, bato oyo bazalaki kozela libándá balingaki koyeba likambo nini ekómelaki ye. Kasi Zekaria akokaki koloba te. Akómaki kaka kosala bajɛstɛ na mabɔkɔ. Bato bayaki koyeba ete Zekaria autaki kozwa nsango ya Nzambe.

Na nsima, Elizabeti azwaki zemi mpe abotaki mwana mobali, kaka ndenge anzelu alobaki. Bandeko mpe baninga na ye bayaki kotala mwana. Basepelaki mingi. Elizabeti alobaki ete: ‘Nkombo na ye ekozala Yoane.’ Bazongisaki: ‘Moto moko te na libota na bino azali na nkombo wana. Pesá ye nkombo ya tata na ye Zekaria.’ Kasi Zekaria akomaki na etanda moko ete: ‘Nkombo na ye Yoane.’ Kaka na ntango yango, Zekaria azongelaki koloba! Nsango ya mwana yango epalanganaki na Yudea mobimba, mpe bato bazalaki komituna: ‘Ntango mwana oyo akokola, akozala nani?’

Na nsima, Zekaria atondaki na elimo santu, mpe asakolaki: ‘Tiká Yehova akumisama. Alakaki Abrahama ete akotinda mobikisi, Masiya, mpo na kobikisa biso. Yoane akozala mosakoli, mpe akobongisela Masiya nzela.’

Likambo moko mpe ya kokamwa ekómelaki Maria, ndeko ya Elizabeti. Tokolobela yango na mokapo oyo elandi.

“Mpo na bato ekoki kosalema te, kasi mpo na Nzambe makambo nyonso ekoki kosalema.”​—Matai 19:26