Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 69

Anzelu Gabriele ayei epai ya Maria

Anzelu Gabriele ayei epai ya Maria

Elizabeti azalaki na ndeko moko ya mwasi na nkombo Maria, oyo azalaki naino elenge mpe azalaki kofanda na engumba Nazarete ya Galile. Maria ná Yozefe, mosali-mabaya, bayokanaki bábalana. Ntango Elizabeti azalaki na zemi ya sanza motoba, anzelu Gabriele abimelaki Maria. Alobaki na ye boye: ‘Mbote Maria. Yehova amoniseli yo boboto mingi.’ Kasi Maria akangaki ntina te ya likambo oyo anzelu Gabriele ayebisaki ye. Na nsima, anzelu yango ayebisaki ye: ‘Okozwa zemi mpe okobota mwana mobali, mpe okopesa ye nkombo Yesu. Akozala mokonzi. Bokonzi na ye ekoumela libela.’

Maria azongisaki: ‘Nayebi mibali te. Ndenge nini nakobota?’ Anzelu Gabriele ayebisaki ye ete: ‘Mpo na Yehova makambo nyonso ekoki kosalema. Elimo santu ekokitela yo, mpe okobota mwana mobali. Kutu ndeko na yo Elizabeti akómi na zemi.’ Na nsima Maria alobaki: ‘Nazali moombo ya Yehova. Tiká makambo esalema kaka ndenge olobi.’

Maria akendaki kotala Elizabeti na engumba ya bangomba mike esika azalaki kofanda. Ntango Maria apesaki Elizabeti mbote, Elizabeti ayokaki mwana aningani makasi na libumu na ye. Lokola atondaki na elimo santu, alobaki boye: ‘Maria, Yehova apamboli yo. Nazwi libaku ya koyamba mama ya Nkolo na ngai.’ Maria azongisaki: ‘Nazali kokumisa Yehova na motema na ngai mobimba.’ Maria afandaki epai ya Elizabeti sanza misato, mpe na nsima azongaki epai na ye na Nazarete.

Ntango Yozefe ayokaki ete Maria azali na zemi, alingaki koboya ye. Kasi anzelu moko abimelaki ye na ndɔtɔ mpe alobaki na ye ete: ‘Kobanga kobala ye te. Asali likambo moko ya mabe te.’ Yozefe abalaki Maria, akendaki na ye na ndako na ye.

“Eloko nyonso oyo Yehova asepelaki kosala asalá yango na likoló mpe na mabele.”​—Nzembo 135:6