Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 71

Yehova abatelaki Yesu

Yehova abatelaki Yesu

Na ɛsti ya mokili ya Yisraele ezalaki na bato oyo bazalaki kondima ete minzoto etambwisaka bango. Mokolo moko na butu, mibali moko oyo bazalaki kofanda na Ɛsti bamonaki eloko moko ezali kongɛnga lokola monzoto ezali kotambola na likoló mpe balandaki yango. “Monzoto” yango ememaki bango na Yerusaleme. Mibali yango babandaki kotuna bato: ‘Mwana oyo akozala mokonzi ya Bayuda azali wapi? Toyei kofukamela ye.’

Ntango Erode, mokonzi ya Yerusaleme, ayokaki nsango ya mokonzi yango ya sika, abulunganaki mpenza. Atunaki banganga-nzambe bakonzi: ‘Mokonzi yango asengelaki kobotama wapi?’ Bayebisaki ye boye: ‘Basakoli balobaki ete akobotama na Beteleme.’ Erode abengaki bato yango oyo bautaki na Ɛsti mpe ayebisaki bango: ‘Bókende na Beteleme koluka mwana yango. Bongo bózonga koyebisa ngai esika azali. Ngai mpe nalingi kofukamela ye.’ Nzokande azalaki kokosa.

“Monzoto” yango ebandaki kotambola lisusu. Mibali yango balandaki yango tii na Beteleme. “Monzoto” yango ekendaki kotɛlɛma likoló ya ndako moko boye, mpe mibali wana bakɔtaki na ndako yango. Bakutaki Yesu ná mama na ye Maria. Bafukamelaki mwana yango mpe bapesaki ye wolo, mpaka ya malasi, mpe mire. Yehova nde moto atindaki bato yango bákende koluka Yesu? Te.

Na butu yango, Yehova ayebisaki Yozefe na ndɔtɔ ete: ‘Erode alingi koboma Yesu. Kamatá mwasi na yo ná mwana mpe bókima na Ezipito. Bófanda kuna tii ntango nakoyebisa yo ete likama esili bongo bózonga.’ Na mbala moko, Yozefe ná libota na ye bakendaki na Ezipito.

Yehova ayebisaki bato yango oyo bautaki na Ɛsti ete bázongela Erode te. Ntango Erode ayebaki ete bato yango bakoya lisusu te, ayokaki nkanda makasi mpenza. Lokola akokaki kozwa Yesu te, apesaki mitindo ete, na Beteleme, báboma bana nyonso ya mike ya mibali oyo bazalaki mbula moko na Yesu. Kasi Yesu abikaki, bamemaki ye mosika na Ezipito.

Na nsima, Erode akufaki. Yehova ayebisaki Yozefe ete: ‘Sikoyo likama ezali lisusu te, bokoki kozonga.’ Yozefe, Maria ná Yesu bazongaki na Yisraele, mpe bakendaki kofanda na engumba ya Nazarete.

“Liloba oyo ezali kobima na monɔkɔ na ngai ekozala ndenge wana . . . , mpe ekolonga mpenza na likambo oyo natindaki yango.”​—Yisaya 55:11