Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 73

Yoane abongisi nzela

Yoane abongisi nzela

Yoane, mwana ya Zekaria ná Elizabeti, akómaki mosakoli ntango akómaki mokóló. Yehova atindaki Yoane mpo na koteya bato ete Masiya azali koya. Kasi Yoane azalaki koteya na basinagoga to na bingumba te; azalaki nde kosakola na esobe. Bato ya Yerusaleme mpe ya Yudea mobimba bazalaki koya koyoka Yoane. Ateyaki bango ete mpo básepelisa Nzambe, basengeli kotika makambo ya mabe. Nsima ya koyoka Yoane, bato mingi babongolaki mitema, mpe Yoane abatisaki bango na Ebale ya Yordani.

Yoane azalaki na bomoi ya mindɔndɔ te. Azalaki kolata bilamba basalá na nsuki ya kamela mpe kolya mayoyo ná mafuta ya nzoi ya zamba. Bato bazalaki koluka koyeba Yoane. Ata bato ya lolendo lokola Bafarisai ná Basadukai bayaki mpo na kotala ye. Yoane ayebisaki bango: ‘Bótika makambo ya mabe mpe bóbongola mitema. Bókanisa te ete boleki bato mosusu kaka mpo bolobi ete bozali bana ya Abrahama. Yango elakisi te ete bozali bana ya Nzambe.’

Bato mingi bayaki epai ya Yoane mpe batunaki ye: ‘Tósala nini mpo tósepelisa Nzambe?’ Yoane alobaki na Bayuda yango: ‘Soki ozali na bilamba mibale, pesá moko na moto oyo azangi.’ Oyebi mpo na nini alobaki bongo? Alingaki bayekoli na ye báyeba ete mpo básepelisa Nzambe, basengeli kolinga basusu.

Yoane alobaki na bakɔngɔli-mpako boye: ‘Bózala sembo mpe bóbubaka bato te.’ Alobaki na basoda ete: ‘Bóndimaka kanyaka te mpe bókosaka te.’

Banganga-nzambe ná Balevi mpe bayaki epai ya Yoane mpe batunaki ye: ‘Yo ozali nani? Moto nyonso alingi koyeba.’ Yoane alobaki na bango ete: ‘Nazali mongongo oyo ezali kobelela na esobe, oyo ezali komema bato epai ya Yehova, ndenge kaka Yisaya asakolaki.’

Bato basepelaki na makambo oyo Yoane ateyaki bango. Mingi bamitunaki soki Yoane azali Masiya. Kasi ayebisaki bango ete: ‘Moto oyo aleki ngai azali koya. Nabongi kofungola ata sandale na ye te. Nazali kobatisa na mai, kasi ye akobatisa na elimo santu.’

“Moto yango ayaki mpo na litatoli, ete apesa litatoli mpo na pole yango, mpo bato ya ndenge nyonso bándima na nzela na ye.”​—Yoane 1:7