Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 76

Yesu apɛtoli tempelo

Yesu apɛtoli tempelo

Na eleko ya prɛnta ya mobu 30 ya ntango na biso, Yesu akendaki na Yerusaleme. Bato mingi bayaki na engumba yango mpo na Elekeli. Na fɛti yango, bazalaki kotumba banyama mpo na kopesa mbeka na tempelo. Bato mosusu bazalaki koya na banyama na bango, bato mosusu bazalaki kosomba yango na Yerusaleme.

Ntango Yesu akómaki na tempelo, amonaki bato bazali kotɛka banyama kuna. Bazalaki kosala mombongo wana na ndako ya losambo ya Yehova! Yesu asalaki nini? Asalaki fimbo mpe abenganaki bampate ná bangɔmbɛ na tempelo. Abalolaki bamesa ya bato oyo basenzaka mbongo mpe asopaki mbongo na bango ya bibende na mabele. Yesu alobaki na baoyo bazalaki kotɛka bibenga ete: ‘Bólongola biloko oyo awa! Bókómisa ndako ya Tata na ngai esika ya mombongo te!’

Bato oyo bazalaki na tempelo bakamwaki makambo oyo Yesu asalaki. Bayekoli na ye bakanisaki esakweli oyo elobaki mpo na Masiya ete: ‘Nakotonda na molende mpo na ndako ya Yehova.’

Na nsima, na mobu 33 ya ntango na biso, Yesu apɛtolaki tempelo mpo na mbala ya mibale. Alingaki moto moko te asambwisa ndako ya Tata na ye.

“Bokoki te kozala baombo ya Nzambe mpe ya Bomɛngo.”​—Luka 16:13