Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 77

Mwasi moko na liziba ya mai

Mwasi moko na liziba ya mai

Nsima ya fɛti ya Elekeli, Yesu ná bayekoli na ye balekaki na Samaria mpo na kozonga na Galile. Pene na engumba Sikare, Yesu atɛlɛmaki na esika babengi liziba ya Yakobo. Ntango azalaki kopema wana, bayekoli na ye bakendaki na engumba mpo na kosomba biloko ya kolya.

Mwasi moko ayaki kotoka mai na liziba yango. Yesu alobaki na ye: “Pesá ngai mai ya komɛla.” Mwasi yango azongisaki ete: ‘Mpo na nini ozali kosolola na ngai? Nazali mwasi Mosamaria. Bayuda basololaka na Basamaria te.’ Yesu alobaki na ye: ‘Soki oyebaki ngai, olingaki kosɛnga ngai mai ya komɛla mpe ngai nalingaki kopesa yo mai ya bomoi.’ Mwasi yango ayebisaki ye: ‘Olingi koloba nini? Ozali ata na katini te.’ Yesu alobaki: ‘Moto nyonso oyo akomɛla mai oyo nakopesa ye akoyoka lisusu mposa ya mai te.’ Mwasi yango alobaki na ye ete: “Tata, pesá ngai mai yango.”

Na nsima, Yesu ayebisaki ye: ‘Yaká na mobali na yo awa na liziba.’ Mwasi yango alobaki: ‘Nazali na mobali te.’ Yesu azongisaki: ‘Olobi solo. Obalá mbala mitano, mpe sikoyo ozali kofanda na mobali oyo bobalani na ye te.’ Mwasi yango alobaki: ‘Namoni ete ozali mosakoli. Bato ya ekólo na ngai bandimaka ete tokoki kosambela Nzambe na ngomba oyo, kasi Bayuda balobaka ete tosengeli kosambela kaka na Yerusaleme. Nandimaka ete ntango Masiya akoya, akoteya biso ndenge ya kosambela.’ Na nsima, Yesu ayebisaki mwasi yango likambo moko oyo ayebisá naino moto mosusu te, ayebisaki ye: ‘Nazali Masiya.’

Mwasi yango akendaki mbangu na engumba koyebisa Basamaria: ‘Nakanisi ete namoni Masiya. Ayebi makambo na ngai nyonso. Bóya kotala!’ Balandaki ye na liziba mpe Yesu ateyaki bango.

Basamaria basɛngaki Yesu afanda na engumba na bango. Ateyaki bango mikolo mibale, mpe bato mingi bandimelaki ye. Bongo bato yango bayebisaki mwasi Mosamaria ete: ‘Nsima ya koyoka moto oyo, toyebi ete azali mpenza mobikisi ya mokili.’

“‘Yaká!’ Mpe tiká moto nyonso oyo azali na mposa ya mai aya; tiká moto nyonso oyo alingi, akamata mai ya bomoi ofele.”​—Emoniseli 22:17