Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 79

Yesu asali makamwisi ebele

Yesu asali makamwisi ebele

Yesu ayaki awa na mabele mpo na kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe. Yehova apesaki Yesu elimo santu mpo asala makamwisi mpo na komonisa makambo oyo Yesu akosala ntango akokóma mokonzi. Azalaki kobikisa maladi ya ndenge nyonso. Esika nyonso oyo azalaki kokende, bato ya maladi bazalaki koya epai na ye mpo asalisa bango, mpe azalaki kobikisa bango nyonso. Bato oyo bakufá miso bakómaki komona, bato oyo bakufá matoi bakómaki koyoka, bato oyo batambolaka te bakómaki kotambola, mpe bato oyo bazalaki na bademo, bademo batikaki bango. Bazalaki kobika, ata soki basimbi kaka nsɔngɛ ya elamba na ye. Bato bazalaki kolanda Yesu bipai nyonso oyo azalaki kokende. Na bantango mosusu Yesu azalaki na mposa ya kozala kaka ye moko, kasi soki bato balandi ye, azalaki kobengana bango te.

Mokolo moko Yesu azalaki na ndako moko mpe bayelaki ye moto moko oyo atambolaka te. Kasi ndako yango etondaki na bato, bakokaki kokɔta te. Na yango, batɔbɔlaki ndako yango na likoló mpe bakitiselaki Yesu moto yango. Bongo Yesu alobaki na moto yango ete: ‘Tɛlɛmá mpe tambolá.’ Ntango atambolaki, bato bakamwaki.

Mokolo mosusu, ntango Yesu azalaki kokɔta na mboka moko, bato zomi ya maba batɛlɛmaki mosika, babandaki kobelela: ‘Yesu, salisá biso!’ Na ntango wana, bato ya maba basengelaki kopusana pene ya bato mosusu te. Yesu ayebisaki bato yango bákende na tempelo, ndenge mobeko ya Yehova ezalaki kosɛnga bato ya maba básala soki babikisami. Ntango bazalaki kokende, babikaki. Ntango moko na bango amonaki ete abiki; azongaki mpo na kopesa Yesu matɔndi mpe kokumisa Nzambe. Na kati ya bato yango zomi, kaka moko nde apesaki Yesu matɔndi.

Mwasi moko oyo aumelaki na maladi mbula 12 azalaki na elikya ya kobika te. Alandaki Yesu nsimansima na kati ya ebele ya bato mpe asimbaki nsɔngɛ ya elamba na ye ya likoló. Na mbala moko, abikaki. Ntango likambo yango esalemaki, Yesu atunaki: “Nani asimbi ngai?” Mwasi yango abangaki, mpe ayaki liboso ya Yesu mpe alobaki ete ye moto asimbi ye. Yesu alendisaki ye na maloba oyo: ‘Mwana na ngai, kende na kimya.’

Mokonzi moko ya basoda na nkombo Yairuse abondelaki Yesu ete: ‘Yaká na ndako na ngai! Mwana na ngai ya mwasi ya moke azali kobɛla makasi.’ Kasi liboso Yesu akóma na ndako ya Yairuse, mwana yango akufaki. Ntango Yesu akómaki, amonaki bato ebele oyo bayaki kolela elongo na libota wana. Yesu ayebisaki bango: ‘Bólela te; alali nde mpɔngi.’ Na nsima, asimbaki mwana yango na lobɔkɔ mpe alobaki na ye: ‘Mwana, tɛlɛmá!’ Na mbala moko mwana yango atɛlɛmaki, mpe Yesu alobaki na baboti na ye bápesa ye biloko ya kolya. Baboti na ye bayokaki mpenza esengo makasi!

“Nzambe atyaki ye mafuta na elimo santu mpe na nguya, mpe akatisaki mokili yango mobimba, azalaki kosala malamu mpe kobikisa baoyo nyonso banyokwami na Zabolo; mpo Nzambe azalaki elongo na ye.”​—Misala 10:38