Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 82

Yesu ateyi bayekoli na ye ndenge ya kobondela

Yesu ateyi bayekoli na ye ndenge ya kobondela

Bafarisai bazalaki kosala makambo nyonso kaka mpo na komilakisa. Soki basali likambo ya malamu, ezalaki kaka mpo bato bámona bango. Bazalaki kobondela na esika ya bato nyonso mpo bámona bango. Bafarisai bakangaki mabondeli ya milaimilai na motó mpe bazalaki kozongela yango na basinagoga mpe na bisika banzela ekutaná mpo bato báyoka bango. Na yango, bato bakamwaki ntango Yesu alobaki na bango ete: ‘Bóbondelaka te lokola Bafarisai. Bazali kokanisa ete bakokamwisa Nzambe na ebele ya maloba na bango, kasi ezali bongo te. Libondeli ezali likambo ya moto ná Yehova. Esengeli kozongela kaka maloba wana mbala na mbala te. Yehova alingi ete oyebisa ye makambo oyo ezali mpenza na kati ya motema na yo.’

Yesu ateyaki boye: ‘Talá ndenge bosengeli kobondela: “Tata na biso na likoló, nkombo na yo esantisama. Bokonzi na yo eya. Mokano na yo esalema, lokola na likoló, ndenge moko mpe na mabele.”’ Yesu alobaki mpe na bango ete basengeli kobondela mpo na bilei ya mokolo, mpo na bolimbisi ya masumu na bango, mpe mpo na makambo na bango moko.

Yesu alobaki boye: ‘Bótika kobondela te. Bókoba kosɛnga Tata na bino, Yehova, mpo apesa bino biloko ya malamu. Moboti nyonso alingaka kopesa mwana na ye biloko ya malamu. Soki mwana na yo asɛngi yo limpa, okopesa ye libanga? Soki asɛngi yo mbisi, okopesa ye nyoka?’

Na nsima, Yesu alimbolaki liteya yango: ‘Soki bino bopesaka bana na bino biloko ya malamu, bongo Tata na bino, Yehova, akopesa bino elimo santu koleka te? Bino bósɛnga ye kaka.’ Olandaka toli ya Yesu? Obondelaka mpo na makambo nini?

“Bókoba kosɛnga, mpe bakopesa bino; bókoba koluka, mpe bokomona; bókoba kobɛta kɔkɔkɔ, mpe bakofungolela bino.”​—Matai 7:7