Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 89

Petro awangani Yesu

Petro awangani Yesu

Ntango Yesu ná bantoma na ye bazalaki na shambrɛ ya likoló, alobaki na bango ete: ‘Na butu ya lelo, bino nyonso bokosundola ngai.’ Petro alobaki: ‘Ngai te! Ata soki basusu batiki yo, ngai nakotika yo te.’ Bongo Yesu alobaki na Petro ete: ‘Liboso nsoso elela, okowangana ngai mbala misato.’

Ntango basoda bakendaki na Yesu na ndako ya Kaifa, mingi ya bantoma yango bakimaki. Kasi mibale na kati na bango bazalaki kolanda na kati ya ebele ya bato. Moko na bango ezalaki Petro. Akɔtaki na lopango ya Kaifa mpe azalaki koyɔta mɔtɔ. Lokola mɔtɔ ezalaki kongɛngisa pole, mosaleli moko ya mwasi amonaki elongi ya Petro mpe alobaki ete: ‘Nayebi yo! Ozalaki na Yesu!’

Petro alobaki: ‘Te, ngai te! Nayebi makambo ozali koloba te.’ Akendaki na porte. Kasi, eumelaki te mosaleli mosusu ya mwasi amonaki ye mpe ayebisaki bato ete: ‘Mobali oyo azalaki elongo na Yesu!’ Petro alobaki lisusu ete: ‘Nayebi ata Yesu yango te.’ Mobali moko oyo azalaki wana alobaki na ye: ‘Yo ozali moko na bango! Ata elobeli na yo ezali komonisa ete ozali moto ya Galile, lokola Yesu.’ Kasi Petro alapaki ndai ete: ‘Nayebi ye te!’

Na ntango yango, nsoso elelaki. Petro amonaki ndenge Yesu abalukaki mpe atalaki ye. Akanisaki maloba oyo Yesu ayebisaki ye; abimaki libándá mpe abandaki kolela makasi.

Na ntango yango, Sanedrina eyokanaki ete básambisa Yesu na kati ya ndako ya Kaifa. Basilaki koyokana báboma Yesu, kasi bazalaki nde koluka ntina oyo bakoboma ye. Kasi bazwaki ye ata na likambo moko te. Nsukansuka, Kaifa atunaki Yesu mbala moko ete: ‘Yo ozali Mwana ya Nzambe?’ Yesu andimaki: ‘Ɛɛ.’ Kaifa alobaki: ‘Tosengeli koluka ntina mosusu te. Afingi Nzambe!’ Sanedrina mobimba elobaki ete: ‘Moto oyo asengeli kokufa.’ Babɛtaki ye bambata, babwakelaki ye nsoi na elongi, bakangaki ye miso, babɛtakibɛtaki ye, mpe balobaki na ye boye: ‘Soki ozali mosakoli, lobá nani abɛti yo!’

Ntango ntɔngɔ etanaki, bakendaki na Yesu na Sanedrina mpe babandaki kotuna ye lisusu: ‘Yo ozali Mwana ya Nzambe?’ Yesu azongisaki ete: ‘Bino moko bozali koloba ete nazali Mwana ya Nzambe.’ Na yango, bamonaki ete afingi Nzambe mpe bakendaki na ye epai ya Ponse Pilate, guvɛrnɛrɛ ya Roma oyo azalaki koyangela wana. Likambo yango ekosuka ndenge nini? Tokoyeba yango na lisolo oyo elandi.

“Ngonga . . . esili koya, wana bokopanzana moto na moto na ndako na ye mpe bokotika ngai kaka ngai moko; nzokande nazali kaka ngai moko te, mpo Tata azali elongo na ngai.”​—Yoane 16:32