Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 91

Yesu asekwi

Yesu asekwi

Nsima ya liwa ya Yesu, moto moko ya bozwi na nkombo Yozefe asɛngaki Pilate apesa ye nzela akitisa nzoto ya Yesu na nzete. Yozefe alíngaki nzoto yango na elamba kitoko ya lini, atyaki yango matiti ya nsolo kitoko mpe alalisaki yango na lilita moko ya sika. Atyaki libanga moko ya kilo na porte ya lilita yango. Banganga-nzambe bakonzi balobaki na Pilate ete: ‘Tozali kobanga ete bayekoli mosusu ya Yesu bakoki kozwa nzoto na ye bongo báloba ete azongi na bomoi.’ Pilate alobaki na bango boye: ‘Bókanga lilita yango mpe bótya bakɛngɛli.’

Mikolo misato na nsima, na ntɔngɔntɔngɔ, mwa basi bakendaki na lilita yango mpe bakutaki libanga elongwe. Na kati ya lilita, bamonaki anzelu moko mpe alobaki na bango: ‘Bóbanga te. Yesu asekwi. Bókende koyebisa bayekoli na ye bákende kokutana na ye na Galile.’

Maria Magadalena akendaki mbangu koluka Petro ná Yoane. Ayebisaki bango ete: ‘Moto moko alongoli nzoto ya Yesu!’ Petro ná Yoane bazongaki mbangu na lilita. Ntango bamonaki yango ezali polele, bazongaki na bandako na bango.

Ntango Maria azongaki na lilita, amonaki baanzelu mibale mpe alobaki na bango ete: ‘Nayebi te esika batye Nkolo na ngai.’ Na nsima, amonaki mobali moko, mpe akanisaki ete azali mosali-bilanga; alobaki na mobali yango: ‘Nabondeli yo tata, yebisá ngai esika otye ye.’ Kasi ntango moto yango abengaki ye, “Maria!” Maria ayebaki mbala moko ete ezalaki Yesu. Maria abandaki koganga ete: “Moteyi!” mpe asimbaki ye na nzoto. Yesu alobaki na ye: ‘Kende koyebisa bandeko na ngai ete omoni ngai.’ Maria akendaki mbangu mbala moko epai ya bayekoli mpe ayebisaki bango ete amoni Yesu.

Na nsima, kaka na mokolo yango, bayekoli mibale balongwaki Yerusaleme mpe bazalaki kokende na Emausi. Mobali moko ayaki pembeni na bango na nzela mpe atunaki bango soki bazali kolobela nini. Bazongiselaki ye: ‘Oyoki nsango te? Eleki mikolo misato, banganga-nzambe bakonzi babomaki Yesu. Sikoyo basi mosusu bazali koloba ete azali na bomoi!’ Moto yango atunaki bango: ‘Bino bondimelaka basakoli te? Balobaki ete Kristo asengelaki kokufa mpe na nsima kosekwa.’ Azalaki kaka kolimbwela bango Makomami. Ntango bakómaki pene na Emausi, bayekoli yango basɛngaki mobali yango aya elongo na bango. Ntango abondelaki mpo na mampa liboso bálya, bato yango bayebaki ete ezalaki Yesu. Na nsima, alimwaki.

Bayekoli yango mibale bazongaki mbangu na Yerusaleme epai bantoma bayanganaki mpe bayebisaki bango makambo oyo esalemaki. Ntango bazalaki naino kuna, na kati ya ndako,Yesu abimelaki bango nyonso. Liboso, bantoma bazalaki kondima te ete ezalaki Yesu. Na nsima, alobaki na bango: ‘Bótala mabɔkɔ na ngai; bósimba ngai. Ekomamaki ete Kristo akosekwa uta na bakufi.’

“Ngai nazali nzela mpe solo mpe bomoi. Moto moko te azali koya epai ya Tata soki na nzela na ngai te.”​—Yoane 14:6