Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 92

Yesu abimeli mibali oyo bazalaki koboma mbisi

Yesu abimeli mibali oyo bazalaki koboma mbisi

Mwa mikolo nsima ya ntango oyo Yesu abimelaki bantoma, Petro amonaki malamu akende koboma mbisi na Mbu ya Galile. Toma, Yakobo, Yoane, mpe bayekoli mosusu bakendaki elongo na ye. Balukaki mbisi butu mobimba kasi bazwaki eloko te.

Na ntɔngɔntɔngɔ, bamonaki mobali moko afandi na libongo. Atunaki bango na mosika ete: ‘Bozwi ata mbisi moko te?’ Bazongiselaki ye ete: “Te!” Mobali yango alobaki na bango: “Bóbwaka monyama na lobɔkɔ ya mobali ya masuwa.” Ntango basalaki yango, monyama etondaki na mbisi ebele, mpe bakokaki kotombola yango te. Na mbala moko, Yoane ayebaki ete mobali yango ezalaki Yesu mpe alobaki: “Ezali Nkolo!” Petro amibwakaki na mai mpe abɛtaki mai tii na libongo. Bayekoli mosusu balandaki na masuwa.

Ntango bakómaki na mokili, bamonaki mampa mpe mbisi na mɔtɔ ya makala. Yesu ayebisaki bango bábakisa mbisi mosusu mpo bálya. Na nsima, ayebisaki bango: ‘Bóya kolya.’

Ntango basilisaki kolya, Yesu atunaki Petro boye: ‘Olingaka ngai koleka mosala ya koboma mbisi?’ Petro azongiselaki ye: ‘Ɛɛ, Nkolo, oyebi ete nalingaka yo. Yesu ayebisaki ye: ‘Boye, oleisa bana-mpate na ngai.’ Yesu atunaki lisusu: ‘Petro, olingaka ngai?’ Petro ayanolaki: ‘Nkolo, oyebi ete nalingaka yo.’ Yesu alobaki na ye: “Batelá bampate na ngai ya mike.” Yesu atunaki lisusu Petro mbala ya misato. Petro ayokaki mawa. Alobaki: ‘Nkolo, oyebi makambo nyonso. Oyebi ete nalingaka yo.’ Yesu alobaki na ye: “Leisá bampate na ngai ya mike.” Na nsima, ayebisaki Petro: “Kobá kolanda ngai.”

“[Yesu] alobaki na bango: ‘Bólanda ngai, mpe nakokómisa bino baluki-bato.’ Na mbala moko basundolaki minyama mpe balandaki ye.”​—Matai 4:19, 20