Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 93

Yesu azongi na likoló

Yesu azongi na likoló

Yesu akutanaki na bayekoli na ye na Galile. Apesaki bango malako ya ntina mingi: ‘Bókende mpe bókómisa bato bayekoli na mikili nyonso. Bóteya bango makambo nyonso oyo nateyaki bino, mpe bóbatisa bango.’ Na nsima, apesaki bango elaka oyo: ‘Nakozala elongo na bino ntango nyonso.’

Na boumeli ya mikolo 40 nsima ya lisekwa na ye, Yesu abimelaki bayekoli na ye ebele, na Galile mpe na Yerusaleme. Ateyaki bango makambo ya ntina mingi mpe asalaki makamwisi ebele. Na nsima, Yesu akutanaki na bantoma na ye mbala ya nsuka, na Ngomba ya Olive. Ayebisaki bango boye: ‘Bólongwa na Yerusaleme te. Bókoba kozela eloko oyo Tata alakaki.’

Bantoma bayebaki te soki alingi koloba nini. Batunaki ye: ‘Sikoyo nde okokóma Mokonzi ya Yisraele?’ Yesu ayebisaki bango: ‘Ntango oyo Yehova atyá mpo nakóma Mokonzi ekoki naino te. Mosika te, bokozwa nguya ya elimo santu, mpe bokozala batatoli na ngai. Bókende kosakola na Yerusaleme, na Yudea, na Samaria, mpe na bisika eleki mosika na mabele.’

Na nsima, Yesu atombwanaki na likoló mpe lipata moko ezipaki ye. Bayekoli na ye bazalaki kaka kotala, kasi azalaki lisusu te.

Bayekoli balongwaki na Ngomba ya Olive mpe bakendaki na Yerusaleme. Bazalaki kokutana mbala na mbala na shambrɛ moko ya likoló mpo na kobondela. Bazalaki kozela Yesu apesa bango malako mosusu.

“Nsango malamu oyo ya bokonzi ekosakolama na mabele mobimba esika bato bafandi mpo ezala litatoli na bikólo nyonso; bongo nsuka ekoya.”​—Matai 24:14