Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 99

Mokɛngɛli moko ya bolɔkɔ akómi mondimi

Mokɛngɛli moko ya bolɔkɔ akómi mondimi

Na engumba Filipi, elenge moko ya mwasi azalaki na demo. Demo yango azalaki kotinda ye asakola makambo ekoya mpe elenge mwasi yango azalaki kokɔtisela bankolo na ye mbongo mingi na mosala yango. Ntango Paulo ná Silasi bakómaki na Filipi, elenge mwasi yango alandaki bango mikolo mingi. Demo yango azalaki kotinda ye aganga ete: “Bato oyo bazali baombo ya Nzambe Oyo-Aleki-Likoló.” Nsukansuka, Paulo alobaki na demo yango: ‘Na nkombo ya Yesu, bimá na nzoto na ye!’ Demo yango atikaki elenge mwasi yango.

Ntango bankolo ya mwasi yango bamonaki ete akokɔtisela bango lisusu mbongo te, basilikaki makasi. Bamemaki Paulo ná Silasi epai ya bakambi-mboka mpe balobaki: ‘Bato oyo bazali kobuka mobeko mpe bazali kokɔtisa mobulu na engumba mobimba!’ Bakambi-mboka bapesaki mitindo ete bábɛta Paulo ná Silasi mpe bábwaka bango na bolɔkɔ. Mokɛngɛli ya bolɔkɔ abwakaki bango na bolɔkɔ ya kati mpenza, ya molili, mpe akangaki makolo na bango na bikanga-makolo.

Paulo ná Silasi bazalaki kosanzola Yehova na nzembo mpe bato ya bolɔkɔ bazalaki koyoka bango. Na mbala moko, na katikati ya butu koningana monene ya mabele esalemaki mpe bolɔkɔ eninganaki makasi. Baporte nyonso efungwamaki, mpe minyɔlɔlɔ mpe bikanga-makolo ya bakangami efungwamaki. Mokɛngɛli ya bolɔkɔ akendaki mbangu na kati ya bolɔkɔ mpe amonaki ete baporte na yango efungwami. Lokola akanisaki ete bato nyonso ya bolɔkɔ bakimi, azwaki mopanga mpo amiboma.

Na mbala moko, Paulo abelelaki: ‘Komisala mabe te! Biso nyonso tozali awa!’ Mokɛngɛli ya bolɔkɔ yango akɔtaki mbangu na kati mpe akweaki liboso ya Paulo ná Silasi. Atunaki bango: “Nasala nini mpo nabika?” Bayebisaki ye: ‘Yo ná bato ya ndako na yo bosengeli kondimela Yesu.’ Na nsima, Paulo ná Silasi bateyaki bango maloba ya Yehova, mpe mokɛngɛli ya bolɔkɔ ná bato ya ndako na ye bazwaki batisimo.

“Bato bakotya bino mabɔkɔ mpe bakonyokola bino, bakokaba bino na basinagoga mpe na babolɔkɔ, bakomema bino na makasi liboso ya bakonzi mpe baguvɛrnɛrɛ mpo na nkombo na ngai. Ekozala libaku mpo bópesa litatoli.”​—Luka 21:12, 13