Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 101

Batindi ntoma Paulo na Roma

Batindi ntoma Paulo na Roma

Mobembo ya misato oyo Paulo asalaki mpo na kosakola esukaki na Yerusaleme. Kuna bakangaki ye mpe batyaki ye na bolɔkɔ. Na butu, Yesu alobaki na ye na emonaneli moko ete: ‘Okokende kosakola na Roma.’ Balongolaki Paulo na Yerusaleme mpe bamemaki ye na Kaisaria, epai asalaki mbula mibale na bolɔkɔ. Ntango azalaki kosamba liboso ya Guvɛrnɛrɛ Festusi, Paulo ayebisaki ye ete: ‘Tiká ngai nakende kosamba na Roma epai ya Kaisala.’ Festusi alobaki: “Lokola osɛngi okende kosamba epai ya Kaisala, okokende epai ya Kaisala.’ Batyaki ntoma Paulo na masuwa moko oyo ezalaki kokende na Roma mpe bandeko mibale, Luka ná Aristarke, bakendaki elongo na ye.

Na mbu, mopɛpɛ ya makasi ebɛtaki mpe eumelaki mikolo ebele. Bato nyonso bakanisaki ete bakokufa. Kasi Paulo alobaki: ‘Mibali, anzelu moko ayebisaki ngai na ndɔtɔ ete: “Kobanga te, Paulo. Okokóma na Roma, mpe bato nyonso oyo bazali na masuwa bakobatelama.” Bózala na mpiko! Tokokufa te.’

Mopɛpɛ yango esalaki mikolo 14. Nsukansuka, bamonaki mokili. Ezalaki esanga ya Malta. Masuwa ekangamaki na zɛlo mpe ebukanaki na biteni, kasi bato nyonso 276 oyo bazalaki na masuwa bakómaki na mokili kozanga likama. Bato mosusu babɛtaki mai mpe basusu bamataki likoló ya biteni mosusu ya masuwa mpe bakendaki tii na libongo. Bato ya Malta basalisaki bango mpe bapeliselaki bango mɔtɔ mpo báyɔta.

Sanza misato na nsima, basoda bazwaki ntoma Paulo mpe bamatisaki ye na masuwa mosusu oyo ezalaki kokende na Roma. Ntango akómaki kuna, bandeko bayaki kokutana na ye. Ntango Paulo amonaki bango, apesaki Yehova matɔndi mpe azwaki mpiko. Atako azalaki mokangami, bapesaki ye nzela ya kofanda na ndako moko ya kofutela epai soda moko azalaki kokɛngɛla ye. Afandaki kuna mbula mibale. Bato bazalaki koya kotala ye, mpe azalaki koteya bango makambo etali Bokonzi ya Nzambe mpe Yesu. Paulo akomaki mikanda mpo na masangá ya Azia Moke mpe ya Yudea. Yehova asalelaki mpenza ntoma Paulo mpo na kopalanganisa nsango malamu epai ya bato ya bikólo.

“Na makambo nyonso, tozali kopesa ndakisa malamu ete tozali basaleli ya Nzambe, na ezaleli ya koyika mpiko na makambo mingi, na malɔzi, na bosɛnga, na mikakatano.”​—2 Bakorinti 6:4