Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Maloba ya ebandeli ya Eteni 3

Maloba ya ebandeli ya Eteni 3

Bambula nsima ya Mpela, Biblia elobeli mwa bato oyo basalelaki Yehova. Kati na bango ezalaki Abrahama, oyo abengamaki moninga ya Yehova. Mpo na nini abengamaki moninga ya Yehova? Soki ozali moboti, salisá mwana na yo amona ete Yehova atyelaka ye mpenza likebi mpe alingaka kosalisa ye. Lokola Abrahama mpe bato mosusu ya sembo, na ndakisa Lota mpe Yakobo, tokoki kosɛnga Yehova asalisa biso. Tokoki kondima ete Yehova akosala likambo nyonso oyo alaki.

NA ETENI OYO

LITEYA 7

Ndako molai ya Babele

Bato mosusu babandaki kotonga engumba moko mpe ndako molai oyo ekokende tii na likoló. Mpo na nini Nzambe asalaki na mbala moko ete bábanda koloba minɔkɔ ekeseni?

LITEYA 8

Abrahama ná Sara batosaki Nzambe

Mpo na nini Abrahama ná Sara batikaki engumba na bango mpo na kokende koyengayenga na mokili ya Kanana?

LITEYA 9

Nsukansuka babotaki mwana!

Ndenge nini Nzambe akokokisa likambo oyo ayebisaki Abrahama? Mwana nini ya Abrahama alingaki kokokisa likambo yango, Yisaka to Yishimaele?

LITEYA 10

Kanisá mwasi ya Lota

Nzambe atindaki mbula ya mɔtɔ mpe ya sufulu na Sodoma mpe Gomora. Mpo na nini abebisaki bingumba yango? Mpo na nini tosengeli kokanisa mwasi ya Lota?

LITEYA 11

Kondima na ye emekamaki

Nzambe ayebisaki Abrahama: ‘Nabondeli yo, zwá mwana na yo ya mobali kaka moko mpe pesá ye mbeka na ngomba moko na mokili ya Moria.’ Abrahama asalaki nini ntango kondima na ye emekamaki ndenge wana?

LITEYA 12

Yakobo azwaki libula

Yisaya ná Rebeka babotaki mapasa ya mibali. Lokola Esau azalaki mwana ya liboso, ye nde asengelaki kozwa lipamboli monene. Mpo na nini atɛkaki yango na saani ya supu ya lantiye?

LITEYA 13

Yakobo ná Esau bayokani

Ndenge nini Yakobo azwi lipamboli? Mpe asalaki nini mpo na koyokana na Esau?