Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Maloba ya ebandeli ya Eteni 5

Maloba ya ebandeli ya Eteni 5

Sanza mibale nsima ya kokatisa Mbu Motane, Bayisraele bakómaki na Ngomba Sinai. Kuna, Yehova asalaki kondimana na Yisraele mpo ezala ekólo na ye. Abatelaki bango mpe apesaki bango nyonso oyo esengeli: mana mpo na kolya, bilamba oyo ekufaki te, mpe esika ya kimya mpo na kofanda. Soki ozali moboti, salisá mwana na yo amona ntina oyo Yehova apesaki Bayisraele Mibeko, tabernakle, mpe bonganga-nzambe. Monisá ntina ya kokokisa maloba na biso, ya kozala ntango nyonso na komikitisa, mpe ya kotikala sembo epai ya Yehova.

NA ETENI OYO

LITEYA 23

Bapesaki Yehova elaka

Bayisraele bapesaki Nzambe elaka moko ya ntina mingi ntango bazalaki na Ngomba Sinai.

LITEYA 24

Bakokisaki elaka na bango te

Wana Moize azalaki kozwa Mibeko Zomi, bato basalaki lisumu moko monene.

LITEYA 25

Tabernakle mpo na losambo

Hema yango ya ndenge mosusu ezalaki na sanduku ya kondimana.

LITEYA 26

Banɔngi zomi na mibale

Yosua ná Kalebe bakesanaki na mibali mosusu zomi oyo bakendaki kotala mokili ya Kanana.

LITEYA 27

Batombokelaki Yehova

Kora, Datane, Abirame mpe bato mosusu 250 bayebaki te likambo moko ya ntina oyo etali Yehova.

LITEYA 28

Mpunda ya Balaama elobi

Mpunda yango emonaki moto oyo Balaama azalaki komona te.