Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Maloba ya ebandeli ya Eteni 6

Maloba ya ebandeli ya Eteni 6

Nsukansuka, ntango Bayisraele bakómaki na Mokili ya Ndaka, tabernakle ekómaki esika ya losambo ya solo. Banganga-nzambe bazalaki koteya Mibeko, mpe basambisi bazalaki kokamba ekólo. Eteni oyo emonisi ete makambo oyo moto moko aponi kosala ekoki mpenza kobongola bomoi ya bato mosusu. Moyisraele mokomoko azalaki na mokumba epai ya Yehova mpe ya mozalani na ye. Monisá ndenge Debora, Naomi, Yosua, Hana, mwana mwasi ya Yefeta, mpe Samwele bazalaki ndakisa malamu mpo na basusu. Monisá ete ata bato mosusu oyo bazalaki Bayisraele te, lokola Rahaba, Ruta, Yaele, mpe bato ya Gibeone, baponaki kozala na ngámbo ya Bayisraele mpo bayebaki ete Nzambe azalaki elongo na bango.

NA ETENI OYO

LITEYA 29

Yehova aponaki Yosua

Nzambe apesaki Yosua malako oyo ekoki mpe kosalisa biso lelo.

LITEYA 30

Rahaba abombaki banɔngi

Bifelo ya Yeriko ekweaki. Kasi ndako ya Rahaba ekweaki te, atako ekangamaki na efelo yango.

LITEYA 31

Yosua ná bato ya Gibeone

Yosua abondelaki Nzambe: “Moi, tɛlɛmá!” Nzambe ayanolaki?

LITEYA 32

Mokambi ya sika mpe basi mibale ya mpiko

Nsima ya liwa ya Yosua, Bayisraele babandaki kosambela bikeko. Bakómaki konyokwama, kasi Nzambe asalisaki bango na nzela ya Mosambisi Barake, mosakoli-mwasi Debora, mpe Yaele ná pike ya hema na ye!

LITEYA 33

Ruta ná Naomi

Basi mibale oyo mibali na bango bakufá bazongaki na Yisraele. Moko na bango, Ruta, akendaki kosala na elanga, epai Boaze amonaki ye.

LITEYA 34

Gideone alongaki bato ya Midiane

Ntango bato ya Midiane bakómaki konyokola bango, Bayisraele basɛngaki Yehova asalisa bango. Ndenge nini mwa basoda moke ya Gideone balongaki basoda 135 000 ya banguna?

LITEYA 35

Hana asɛngi Nzambe mwana mobali

Elekana azalaki komema Hana, Penina mpe libota mobimba na tabernake ya shilo mpo na kosambela. Kuna, Hana asɛngaki Nzambe mwana mobali. Mbula moko na nsima, abotaki Samwele!

LITEYA 36

Elaka ya Yefeta

Yefeta asalaki elaka nini mpe mpo na nini? Mwana ya Yefeta alobi nini ntango ayoki elaka ya tata na ye?

LITEYA 37

Yehova asololi na Samwele

Bana mibale ya Nganga-nzambe monene Eli bazalaki kosala lokola banganga-nzambe na tabernakle, kasi bazalaki kotosa mibeko ya Nzambe te. Elenge Samwele azalaki lokola bango te, mpe Yehova asololaki na ye.

LITEYA 38

Yehova akómisaki Samsone makasi

Nzambe akómisaki Samsone makasi mpo abundisa Bafilistia, kasi ntango Samsone azwaki ekateli ya mabe, Bafilistia bakangaki ye.