Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Maloba ya ebandeli ya Eteni 8

Maloba ya ebandeli ya Eteni 8

Yehova apambolaki Salomo; apesaki ye bwanya mingi mpe lokumu monene ya kotonga tempelo. Kasi mokemoke Salomo atikaki Yehova. Soki ozali moboti, salisá mwana na yo amona ndenge basambeli ya lokuta bakabolaki Salomo na Nzambe. Bokonzi na ye ekabwanaki, mpe bakonzi ya mabe bamemaki ekólo na lipɛngwi mpe na losambo ya bikeko. Na ntango wana, banyokolaki mpe babomaki ebele ya basakoli ya sembo ya Yehova. Yezabele, mwasi ya mokonzi, akɔtisaki bokonzi ya nɔrdi na lipɛngwi makasi. Ezalaki eleko moko ya mpasi mpenza na Yisraele. Kasi Bayisraele mingi bazalaki kaka sembo epai ya Yehova, na ndakisa Mokonzi Yehoshafate mpe mosakoli Eliya.

NA ETENI OYO

LITEYA 44

Batongeli Yehova tempelo

Nzambe andimaki libondeli ya Salomo mpe apesaki ye mikumba monene.

LITEYA 45

Bokonzi ekabwani

Bayisraele mingi batiki kosalela Yehova.

LITEYA 46

Momekano na Ngomba Karamele

Nani nde Nzambe ya solo? Yehova to Baala?

LITEYA 47

Yehova apesaki Eliya makasi

Okanisi ete akoki kopesa yo mpe makasi?

LITEYA 48

Mwana ya mwasi moko oyo mobali akufá azongi na bomoi

Makamwisi mibale na ndako moko!

LITEYA 49

Mwasi ya mokonzi moko azwi etumbu

Yezabele abomisaki Nabote kaka mpo azwa elanga ya vinyo na ye! Yehova amonanaki mabe mpe kozanga bosembo wana.

LITEYA 50

Yehova abundeli Yehoshafate

Yehoshafate, oyo azalaki mokonzi ya malamu, asɛngaki Nzambe asalisa ye ntango banguna bayelaki Yuda.