Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Maloba ya ebandeli ya Eteni 9

Maloba ya ebandeli ya Eteni 9

Eteni oyo elobeli bilenge, basakoli, mpe bakonzi oyo bazalaki na kondima makasi epai ya Yehova. Na ekólo Siri, mwana mwasi moko Moyisraele azalaki na kondima ete mosakoli ya Yehova akobikisa Naamane. Mosakoli Elisha atyelaki Yehova motema mobimba ete akobatela ye na mabɔkɔ ya banguna. Nganga-nzambe monene Yehoyada atyaki bomoi na ye na likama na ndenge abatelaki elenge Yehoashe mpo nkɔkɔ na ye ya mwasi Atalia oyo azalaki motema mabe aboma ye te. Mokonzi Hizikiya atyaki motema ete Yehova akobikisa Yerusaleme, mpe amitikaki te na mabɔkɔ ya bato ya Asiri. Mokonzi Yosiya alongolaki losambo ya bikeko na ekólo, abongisaki tempelo, mpe azongisaki bato ya ekólo na ye na losambo ya peto.

NA ETENI OYO

LITEYA 51

Elombe ya etumba ná mwana moko ya mwasi

Mwana mwasi moko ya Yisraele ayebisi nkolo na ye nguya monene oyo Yehova azali na yango mpe likamwisi moko monene esalemi.

LITEYA 52

Limpinga ya baanzelu ya Yehova

Ndenge mosaleli ya Elisha akangaki ntina ya maloba ‘baoyo bazali na biso bazali ebele koleka baoyo bazali na bango.’

LITEYA 53

Mpiko ya Yehoyada

Nganga-nzambe ya sembo atɛmɛli mokonzi-mwasi ya motema mabe.

LITEYA 54

Yehova amoniselaki Yona motema molai

Mpo na nini mbisi moko ya monene emɛlaki mosakoli moko ya Nzambe? Ndenge nini abimaki na kati ya mbisi yango? Mpe liteya nini ya ntina mingi Yehova apesaki ye?

LITEYA 55

Anzelu ya Yehova abatelaki Hizikiya

Banguna ya ekólo Yuda basalaki libunga monene mpenza ntango balobaki ete Yehova akobatela bato na ye te!

LITEYA 56

Yosiya alingaki Mibeko ya Nzambe

Yosiya akómaki mokonzi ntango azalaki na mbula 8, mpe asalisaki bato ya ekólo básambela Yehova.